Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bozalisi emonisaka Nzambe ya bomoi

Bozalisi emonisaka Nzambe ya bomoi

“Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo . . . mpo yo ozalisaki biloko nyonso.”​—EM. 4:11.

1. Tosengeli kosala nini mpo na koyeba mpenza soki kondima na biso ezali kaka makasi?

BATO mingi balobaka ete bakoki kondima kaka biloko oyo bamoni na miso. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya ndenge wana bándimela Yehova? Biblia elobi ete “moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoa. 1:18) Na yango, ndenge nini tokoki koyeba mpenza soki kondima na biso epai ya “Nzambe oyo amonanaka te” ezali kaka makasi? (Kol. 1:15) Ya liboso, tosengeli koyeba mateya oyo ezipaka bato miso mpo bámona te solo na ntina na Yehova. Na nsima, tosengeli koyeba kosalela Biblia malamumalamu mpo na kokweisa makanisi nyonso “etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”​—2 Ko. 10:4, 5.

2, 3. Mateya nini mibale epekisaka bato báyeba solo na ntina na Nzambe?

2 Liteya moko oyo epalangani mingi, oyo epekisaka bato báyeba solo na ntina na Nzambe, ezali liteya ya evolisyo. Liteya wana oyo bato babimisá eyokani te na oyo Biblia eteyaka mpe elongolaka bato elikya. Bato oyo bandimaka liteya yango balobaka ete bomoi ebimá kaka yango moko. Soki ezali bongo, elingi koloba ete tokoki koyeba te mpo na nini tozali awa na mabele.

3 Longolá yango, bandimi ya mangomba mosusu ya bokristo balobaka ete molɔ́ngɔ́ mobimba, ata mpe mabele mpe bikelamu nyonso ya bomoi, eumeli kaka mwa bankóto ya bambula. Bato oyo bandimaka liteya yango balobaka ete balandaka mpenza Biblia, kasi bakanisaka ete Nzambe akelá biloko nyonso na mikolo motoba ya ngonga 24, esili koleka kaka mwa bankóto ya bambula. Baboyaka kondima bilembeteli ya solosolo oyo bato ya siansi bazali komonisa, oyo ezali kokweisa makanisi na bango. Koloba ete molɔ́ngɔ́, mabele, mpe bikelamu nyonso ya bomoi eumeli kaka mwa bankóto ya bambula emonisaka ete makanisi ya Biblia ebongi te mpe ezali solo te. Bato oyo bandimaka makanisi yango bazali ndenge moko na bato mosusu na siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki na molende mpo na kosambela Nzambe “kasi nde na boyebi ya solosolo te.” (Rom. 10:2) Ndenge nini tokoki kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kopikola mateya “oyo epikamá makasi,” lokola evolisyo mpe liteya oyo elobaka ete molɔ́ngɔ́, mabele, mpe bikelamu nyonso ya bomoi eumeli kaka mwa bankóto ya bambula? * Tokoki kosala yango kaka soki mokomoko na biso asali makasi mpo na kozwa boyebi ya sikisiki ya mateya oyo Biblia eteyaka.

KONDIMA ESIMBAMI NA BILEMBETELI YA SOLOSOLO MPE NA MAKANISI MALAMU

4. Kondima na biso esengeli kosimbama na nini?

4 Biblia eteyaka ete tosengeli kobatela boyebi ndenge tobatelaka biloko na biso ya motuya. (Mas. 10:14) Yehova alingaka ete kondima na biso epai na ye esimbama na bilembeteli ya solosolo mpe na makanisi malamu, kasi te na bafilozofi ya bato to na mimeseno ya mangomba. (Tángá Baebre 11:1.) Mpo tókóma na kondima makasi epai ya Nzambe, tosengeli liboso kondimisama ete Yehova azali. (Tángá Baebre 11:6.) Tosengeli nde kondima kaka bindimelá? Te; tosengeli kondima kaka nsima ya kotalela bilembeteli ya solosolo mpe kosalela ‘makoki na biso ya kokanisa.’​—Rom. 12:1.

5. Wapi ntina moko oyo ekoki kondimisa biso ete Nzambe azali?

5 Ntoma Paulo ayebisi ntina moko oyo tokoki kondimisama ete Nzambe azali, atako tokoki komona ye te. Mpo na Yehova, Paulo akomaki ete: “Bizaleli na ye oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Rom. 1:20) Ndenge nini okoki kosalisa moto moko oyo andimaka te ete Nzambe azali, amona ete maloba wana oyo Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu, ezali solo? Okoki kotalela elongo na ye bandakisa oyo elandi, ya biloko oyo Nzambe asalá, oyo emonisaka nguya na ye mpe bwanya na ye.

NGUYA YA NZAMBE EMONANAKA NA BILOKO OYO AKELÁ

6, 7. Ndenge nini nguya ya Yehova emonanaka na biloko mibale oyo ezali lokola nguba oyo ebatelaka biso?

6 Nguya ya Yehova emonanaka na biloko mibale oyo ezali lokola nguba oyo ebatelaka biso: etando oyo ezingi mabele (atmosphère) mpe nguya oyo mabele ezalaka na yango ya kotindika na nsukansuka na yango, biloko oyo ekoki kobebisa yango (champ magnétique). Na ndakisa, etando oyo ezingi mabele esukaka kaka te na kopesa biso mopɛpɛ oyo topemaka. Lokola nguba, ebatelaka mpe biso na basalite mingi oyo eutaka likoló. Mbala mingi, mwa biteni ya mabanga oyo ekokaki kosala bato mabe ezikaka ntango ekɔti na etando oyo ezingi mabele, mpe emonanaka lokola minzoto na butu.

7 Nguya oyo mabele ezalaka na yango ya kobenda biloko ebatelaka mpe biso. Libateli yango eutaka na kati mpenza ya mabele, na esika eloko oyo babengi fer ezalaka, oyo ebimisaka nguya oyo ezingi etando mobimba ya mabele. Nguya yango ebatelaka biso na molunge, na kongɛnga makasi ya moi mpe na banguya mosusu oyo moi ebimisaka, oyo ekoki kozala likama mpo na biso. Nguya oyo mabele ezalaka na yango ya kobenda biloko nde esalaka ete mɔtɔ oyo moi ebimisaka ezikisa te bikelamu nyonso ya bomoi awa na mabele. Na esika ya kozikisa yango, nguya wana emɛlaka yango mpe elimwisaka yango. Tokoki komona polele ndenge oyo nguya ya mabele ya kobenda biloko esalaka mosala soki totali langi ndenge na ndenge oyo emonanaka likoló pene na pôle Nord mpe pôle Sud. Kozanga ntembe, Yehova “azali na makasi na kati ya nguya.”​—Tángá Yisaya 40:26.

BWANYA YA NZAMBE EMONANAKA NA BILOKO OYO AKELÁ

8, 9. Ndenge nini bwanya ya Yehova emonanaka na bibongiseli oyo atyá mpo na kobatela bomoi?

8 Bwanya ya Yehova emonanaka na bibongiseli oyo ebatelaka bomoi awa na mabele. Tózwa ndakisa: Kanisá ete ofandi na engumba moko oyo ezingami na efelo mpe ezali na bamilio ya bato, kasi ezali te na likoki ya kozwa mai mosusu libándá mpe kobwaka bosoto libándá. Ekoumela te, engumba yango ekotonda na salite mpe ekozala lisusu esika malamu te mpo na kofanda. Na makambo mingi, mabele oyo tofandi ezali lokola engumba ya ndenge wana. Ezali na mai na yango mpe ezali mpasi kokende kobwaka bosoto na yango esika mosusu. Nzokande, bambula na bambula, bamiliare ya bikelamu ya bomoi efandaka kaka na mabele, oyo ezali lokola engumba oyo ezingami na efelo. Mpo na nini? Mpo na nguya ya kokamwa oyo mabele ezalaka na yango ya kozongisa biloko sika mpe ya kopɛtola biloko oyo tosengeli na yango mpo na bomoi.

9 Tótalela ndenge mabele ebimisaka mopɛpɛ ya malamu oyo babengi oxygène. Bamiliare ya bikelamu ya bomoi epemaka mopɛpɛ yango ya malamu mpe ebimisaka mopɛpɛ mabe oyo babengi gaz carbonique. Atako bongo, oxygène esilaka te, mpe gaz carbonique ebebisaka te etando oyo ezingi mabele. Mpo na nini esalemaka bongo? Mpo na kozwa eyano, tótalela ebongiseli oyo babengi photosynthèse. Ebongiseli yango esalaka ete banzete mpe milona ebenda gaz carbonique, mai, kongɛnga ya moi, bilei mpe ebimisa hydrates de carbone mpe oxygène. Ebongiseli ya photosynthèse ekómaka na nsuka ntango topemaka oxygène mpe tobimisaka gaz carbonique. Ya solo, Yehova asalelaka banzete mpe milona oyo asalá mpo na kopesa “bato nyonso bomoi mpe mpema.” (Mis. 17:25) Atondi mpenza na bwanya!

10, 11. Ndenge nini mayele ya Yehova emonanaka na lipekapeka babengi monarque mpe lipungupungu?

10 Mayele ya Yehova emonanaka mpe na ebele ya bikelamu oyo ezali awa na mabele. Bato ya siansi balobaka ete mitindo ya bikelamu ya bomoi awa na mabele ezali kobanda na milio 2 tii na milio 100. (Tángá Nzembo 104:24.) Tótala ndenge bwanya ya Nzambe emonanaka na lolenge oyo asalá bikelamu mosusu ya bomoi.

Miso ya lipungupungu emonisaka bwanya ya Nzambe; elilingi ya kati eyeisami monene (Talá paragrafe 11)

11 Na ndakisa, lipekapeka babengi monarque ezali na bɔɔngɔ ya moke mpenza oyo ekokani na nsɔngɛ ya biki. Atako bongo, lipekapeka yango ekoki kopumbwa tii na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 3 000, longwa na Canada tii na zamba moko ya Mexique; moi nde esalisaka yango eyeba nzela. Kasi ndenge nini elandaka moi, atako moi etɛlɛmaka esika moko te? Yehova asalá mwa bɔɔngɔ na yango ya moke na ndenge oyo ekoki kosalisa lipekapeka yango ekoba kokende na nzela ya malamu ata soki moi ezali kotambola. Tólobela mpe lipungupungu. Liso na yango mokomoko ezali na mbuma ya miso ya mikemike soki 30 000. Atako bongo, mwa bɔɔngɔ moke ya lipungupungu ekoki kosangisa makambo mikemike oyo mbuma nyonso ya miso emoni mpe eyebaka nyonso oyo ezali koleka zingazinga.

12, 13. Nini ezali kokamwisa yo mpo na ndenge oyo Yehova asalá baselile oyo esali nzoto na yo?

12 Likambo mosusu ya kokamwa ezali ndenge oyo Yehova asalá baselile ya bikelamu nyonso ya bomoi. Na ndakisa, nzoto na yo esalemi na baselile soki miliare nkóto nkama. Na kati ya selile mokomoko, ezalaka na eloko moko lokola nsinga ya moke, oyo ebengami ADN. Yango nde ebombaka makambo mingi oyo esalaka ete nzoto na yo ezala ndenge ezali.

13 Makambo boni ADN ekoki kobomba? Mpo tóyeba mwa moke makambo oyo ADN ekoki kobomba, tózwa ndakisa ya CD. CD ekoki kobomba makambo nyonso oyo ezali na diksionɛrɛ mobimba. Yango ezali likambo ya kokamwa mpo CD ezali kaka mwa diskɛ ya kopale. Nzokande, gramɛ moko mpamba ya ADN ekoki kobomba makambo oyo ekoki kotyama na ba CD miliare nkóto moko! Na maloba mosusu, lutu moko mpamba ya moke oyo etondi na ADN ekoki kobomba makambo ya bato nyonso oyo bazali na mokili mobimba, ata mbala 350!

14. Makambo oyo bato ya siansi bayekoli etindaka yo oyoka ndenge nini mpo na Yehova?

14 Mokonzi Davidi alobaki ete makambo oyo etali kosalema ya nzoto ya moto ezali lokola nde ekomamá na mokanda moko ya elilingi. Alobaki na Yehova Nzambe ete: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo: mikolo oyo yango esalemaki mpe ntango oyo eteni na yango ata moko ezalaki naino te.” (Nz. 139:16) Tomoni ntina oyo Davidi akumisaki Yehova nsima ya kotalela ndenge nzoto na ye esalemaki. Kutu makambo oyo bato ya siansi bayekoli mikolo oyo ezali kotinda biso tókamwa lisusu mingi na komona ndenge Yehova asalá biso. Makambo yango etindaka biso tóloba lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Nakokumisa yo mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ. Misala na yo ezali ya kokamwa, mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” (Nz. 139:14) Ya solo mpenza, bozalisi emonisaka ete Nzambe azali!

SALISÁ BASUSU BÁPESA NZAMBE YA BOMOI NKEMBO

15, 16. (a) Ndenge nini mikanda na biso esalisaka bato báyeba nguya ya Mozalisi na biso Yehova? (b) Na masolo oyo ezali na motó ya likambo: “Ebimá kaka yango moko?” oyo wapi osepelaki na yango mingi?

15 Esali sikoyo bambula mingi, zulunalo Lamuká! esalisi bamilio ya bato báyeba Nzambe ya bomoi na nzela ya bozalisi. Na ndakisa, Lamuká! ya sanza ya libwa 2006 (na Lifalanse) ezalaki na motó ya likambo: “Y a-t-il un Créateur?” Ebimisamaki mpo na kosalisa bato oyo bandimaka liteya ya evolisyo mpe liteya oyo elobaka ete Nzambe akelá biloko nyonso na mikolo motoba ya ngonga 24. Mpo na Lamuká! yango, ndeko mwasi moko akomelaki biro ya filiale ya États-Unis ete: “Kampanye mpo na kokabola nimero yango elekaki malamu mpenza. Mwasi moko asɛngaki Lamuká! 20. Azali molakisi ya bioloji mpe alingaki ete bana-kelasi na ye bázwa yango.” Ndeko mobali moko akomaki boye: “Nabandá kosakola banda na nsuka ya bambula 1940, mpe nakómi na mbula pene na 75, kasi nayoká naino te esengo ya boye na mosala ya kosakola, lokola oyo nayoki na sanza oyo tokaboli nimero oyo ya Lamuká!”

16 Esali mwa bambula, banimero mingi ya Lamuká! ezali na masolo oyo elobi: “Ebimá kaka yango moko?” Mwa masolo yango ya mikuse elobelaka biloko ya kokamwa oyo ezali na bozalisi mpe emonisaka ndenge oyo moto azali komeka komekola biloko oyo Mozalisi Monene asalá. Tozwaki bisaleli mosusu mpo na kosalisa biso tópesa Nzambe nkembo ntango mwa buku La vie a-t-elle été créée? ebimaki na 2010. Bililingi kitoko mpe mayemi oyo ezali na mwa buku yango etyami mpo na kosalisa biso tómona malamu koleka nguya ya Mozalisi na biso Yehova. Mituna oyo ezali na nsuka ya eteni mokomoko ezali mpo na kosalisa motángi amanyola makambo oyo auti kotánga. Mwa buku yango ekoki kosalisa mingi mpenza na mosala ya kosakola ndako na ndako, na bisika oyo bato bazalaka mingi, mpe na litatoli ya libaku malamu.

17, 18. (a) Baboti, ndenge nini bokoki kosalisa bana na bino báyeba kokɔtela kondima na bango? (b) Ndenge nini bosalelaki mwa babuku mibale oyo elobeli bozalisi na losambo na kati ya libota?

17 Baboti, bosilá kotángela bana na bino mwa buku yango ya langi kitoko na ntango ya losambo na kati ya libota? Soki osali yango, okosalisa bango bázala na kondima mingi epai ya Nzambe na biso ya bomoi. Ekoki kozala ete ozali na bana oyo bazali bilenge mpe bazali na eteyelo ya ntei. Bato oyo bateyaka liteya ya evolisyo balukaka nde bilenge mpo na kondimisa bango ete Mozalisi azalaka te. Bato ya siansi, balakisi, ba documentaire oyo elakisaka biloko oyo ezali na mokili, bafilme mpe baemisyo mosusu ya televizyo elendisaka liteya ya evolisyo. Okoki kosalisa bana na yo ya bilenge bátɛmɛla makanisi wana soki osaleli mwa buku mosusu Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, oyo ebimaki mpe na 2010. Ndenge moko na mwa buku La vie a-t-elle été créée? mwa buku yango elendisaka bilenge bákolisa “likoki [na bango] ya kokanisa.” (Mas. 2:10, 11) Elakisaka bango ndenge ya koyeba soki makambo oyo bateyi na kelasi ezali solo to lokuta.

Baboti, bósalisa bana na bino mpo báyeba kokɔtela kondima na bango (Talá paragrafe 17)

18 Mwa buku Origine de la vie ebongisami mpo na kosalisa bana-kelasi bándima bindimela te makambo oyo bato ya siansi balobaka mpo na komonisa ete liteya ya evolisyo ezali solo. Elendisaka bilenge báluka koyeba na ndenge na bango moko soki makambo yango emonisi solo ete moto autá na makako. Esalisaka bango mpe báyeba ndenge ya koyanola bato oyo balobaka ete bato ya siansi bakoki kosala bikelamu ya bomoi na balaboratware na bango. Baboti, soki bosaleli mwa babuku wana, bokosalisa mpenza bana na bino bábanga soki moke te koyanola liboso ya moto nyonso oyo atuni bango ntina oyo bandimaka ete Mozalisi azali.​—Tángá 1 Petro 3:15.

19. Libaku nini biso nyonso tozali na yango?

19 Tokoki koyeba lisusu malamu bizaleli kitoko ya Yehova soki totángaka mikanda ya moombo ya sembo oyo elobelaka biloko oyo Yehova akelá. Nyonso wana ezali bilembeteli ya solosolo oyo etindaka biso tókumisa Nzambe na biso. (Nz. 19:1, 2) Tozali mpenza na libaku malamu ya kopesa Yehova, Mozalisi ya biloko nyonso, lokumu mpe nkembo oyo abongi na yango!​—1 Tim. 1:17.

^ par. 3 Mpo na koyeba ndenge ya kosolola na bato oyo bandimaka liteya yango, talá nkasa 24 tii 28 ya mwa buku La vie a-t-elle été créée?