Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobungisa elikya te!

Kobungisa elikya te!

Ozali Motatoli ya Yehova oyo banda bambula mingi olingaka ete molongani na yo akóma mpe kosambela Yehova?

Olɛmbaki nde nzoto ntango moyekoli na yo ya Biblia oyo azalaki komonisa ete azali kosepela na boyekoli aboyaki koyekola?

Masolo oyo elandi, oyo euti na Grande-Bretagne, ekosalisa yo oyeba ntina oyo osengeli te kobungisa elikya. Ekosalisa mpe yo oyeba nini okoki kosala mpo na ‘kobwaka limpa na yo na mai,’ elingi koloba kosalisa bato oyo bayebi naino solo te.​—Mos. 11:1.

KOLENDENDELA EZALI NA NTINA MINGI

Ezali na ntina mingi ete olendendela. Osengeli kokangama na Yehova mpe na mateya ya solo. (Mib. 10:20) Yango nde likambo oyo Georgina asalaki. Na 1970 ntango abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova, mobali na ye Kyriacos asilikaki makasi mpo na yango. Asalaki nyonso mpo na kopekisa ye ayekola, azalaki kolinga te Batatoli ya Yehova bákɔta na ndako na bango, mpe soki akuti mikanda na bango na ndako, azalaki kobwaka yango.

Ntango Georgina abandaki koyangana na makita ya lisangá, nkanda ya Kyriacos ekómaki lisusu makasi. Mokolo moko, akendaki na Ndako ya Bokonzi mpe alingaki kobimisa matata. Ntango ndeko mwasi moko amonaki ete Kyriacos azalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki malamu koleka Lingelesi, abengaki na telefone ndeko mobali moko Mogrɛki oyo azalaki na lisangá mosusu mpo aya kosalisa bango. Kyriacos asepelaki ndenge ndeko wana amoniselaki ye boboto, mpe nsima ya mwa basanza, ndeko yango akómaki kutu koyekola na ye Biblia. Kasi na nsima Kyriacos atikaki koyekola.

Elelaki lisusu mbula misato, Georgina azalaki kaka koyika mpiko na botɛmɛli ya mobali na ye. Kyriacos ayebisaki ye ete soki kaka ameki kozwa batisimo, akokima ye. Mokolo oyo Georgina asengelaki kozwa batisimo, abondelaki Yehova na etingya ete Kyriacos akima ye te. Ntango Batatoli ya Yehova bayaki kozwa ye mpo bákende na liyangani, Kyriacos alobaki na bango ete: “Bino bókende liboso. Tozali kolanda bino na motuka na biso.” Akɔtaki na liyangani mokolo wana tii na bopemi ya midi mpe amonaki ndenge mwasi na ye azwaki batisimo!

Mobali ya Georgina azwaki batisimo mbula pene na 40 nsima ya mokolo ya liboso oyo Georgina akutanaki na Batatoli ya Yehova

Na nsima, botɛmɛli ya Kyriacos ekitaki, mpe mokemoke akómaki kobongwana na makambo mingi. Mobali ya Georgina azwaki batisimo mbula pene na 40 nsima ya mokolo ya liboso oyo Georgina akutanaki na Batatoli ya Yehova! Nini esalisaki Kyriacos? Alobi boye: “Nasepelaka mingi ndenge Georgina atikaki eloko moko te epekisa ye asambela Yehova.” Georgina alobi boye: “Atako mobali na ngai azalaki kotɛmɛla ngai, nakokaki te kotika kosambela Nzambe na ngai. Nazalaki kobondela Yehova ntango nyonso, mpe nabungisaki elikya ata moke te.”

BOMOTO YA SIKA EZALI NA NTINA MINGI

Likambo mosusu ya kosala mpo na kosalisa molongani na yo ezali kolona bizaleli ya mokristo. Ntoma Petro apesaki basi bakristo toli ete: “Bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango.” (1 Pe. 3:1) Christine azalaki kolanda toli wana, atako bambula mingi elekaki liboso ete asalisa mobali na ye andima solo. Ntango akómaki Motatoli ya Yehova, ekoki sikoyo mbula koleka 20, mobali na ye John azalaki kondimela Nzambe te. John azalaki kolinga te komikɔtisa na makambo etali mangomba; atako bongo azalaki komona ete lingomba oyo Christine akɔtaki ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Alobi boye: “Namonaki ete yango esalisaki ye azala na esengo. Akómaki makasi, mpe yango esalisaki ngai na mikakatano ebele oyo nakutanaki na yango.”

Christine alukaki soki moke te kotinda mobali na ye na makasi asambela Yehova. Mobali yango alobi boye: “Christine ayebaki ete elekaki malamu ayebisaka ngai te makambo ya lingomba na ye, kasi na motema molai nyonso, atikaki ngai nayekola malɛmbɛmalɛmbɛ mpe na ndenge na ngai.” Soki Christine amoni masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lámuka! oyo ayebi ete ekosepelisa John, na ndakisa masolo oyo elobeli siansi mpe molɔ́ngɔ́, azalaki kolakisa ye yango mpe koloba boye: “Nakanisi, okosepela mingi ntango okotánga yango.”

Na nsima, John azwaki pansiɔ na mosala mpe akómaki kosala mwa misala ya jardin. Lokola akómaki na ntango mingi mpo na kokanisa na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi, abandaki komituna boye: ‘Biso bato, tobimá na mokili kaka mbalakaka to tokelamaki mpo na mokano moko?’ Mokolo moko, ndeko moko oyo John azalaki kosolola na ye mingi atunaki ye boye: “Ndenge nini boyekoli na yo?” John alobaki ete: “Sikoyo, lokola nabandi kondimela Nzambe, nandimi koyekola.”

Ezalaki mpenza na ntina ete Christine abungisa elikya te! Nsima ya kosala mabondeli na boumeli ya mbula 20 mpo ete John ayamba solo, nsukansuka, John azwaki batisimo. Lelo oyo, bango mibale bazali kosalela Yehova na molende. John alobi boye: “Makambo mibale esalisaki ngai nandima solo. Boboto oyo Batatoli ya Yehova bamoniselaki ngai mpe ndenge oyo bazalaki kozwa ngai lokola moninga. Mpe soki ozali na mwasi oyo azali Motatoli ya Yehova, ozali na molongani ya sembo, oyo okoki kotyela motema, mpe oyo alukaka matomba na ye moko te.” Ya solo, Christine asalelaki maloba oyo ezali na 1 Petro 3:1, mpe esimbaki!

MBOTO EBOTI MBUMA NSIMA YA BAMBULA

Ezali boni mpo na bayekoli ya Biblia oyo, mpo na bantina ndenge na ndenge, basepelaka lisusu te koyekola? Mokonzi Salomo akomaki ete: “Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te; mpo oyebi te epai wapi yango ekolonga, ezala awa to kuna, to soki yango nyonso mibale ekozala malamu.” (Mos. 11:6) Ntango mosusu, esɛngaka bambula mingi mpo mboto ya solo ekola na mitema ya bato. Atako bongo, nsukansuka, moto akoki koya komona ete ezali na ntina mingi apusana penepene ya Nzambe. (Yak. 4:8) Ya solo, mokolo mosusu, okoki kokamwa mpe kosepela.

Tózwa ndakisa ya Alice, oyo autaki na Inde mpe ayaki kofanda na Angleterre. Na 1974, abandaki koyekola Biblia. Azalaki koloba monɔkɔ ya Hindi, kasi azalaki na mposa ayeba lisusu Lingelesi malamu. Alice akobaki koyekola na boumeli ya mwa bambula, mpe abandaki koyangana na makita mosusu na lisangá moko ya Lingelesi. Ayebaki ete makambo oyo azalaki koyekola ezalaki mateya ya solo, kasi ayebaki mpenza valɛrɛ na yango te. Longola yango, azalaki kolinga mbongo mingi mpe kolinga kokende mingi na bafɛti. Nsukansuka, Alice atikaki koyekola Biblia.

Mbula pene na 30 na nsima, Stella, oyo azalaki koyekola Biblia ná Alice, azwaki mokanda moko oyo Alice atindelaki ye. Mokanda yango elobaki boye: “Nayebi ete okosepela mingi koyeba ete moyekoli na yo ya Biblia banda 1974 azwaki batisimo na liyangani ya etúká oyo euti kosalema. Osalaki mosala monene na bomoi na ngai. Olonaki mboto ya solo na motema na ngai, mpe atako na ntango wana nakokisaki naino masɛngami te mpo na komipesa epai ya Nzambe, nabatelaki mboto wana ya solo na makanisi mpe na motema na ngai.”

Mokanda oyo Alice atindelaki Stella elobi boye: “Nayebi ete okosepela mingi koyeba ete moyekoli na yo ya Biblia banda 1974 azwaki batisimo na liyangani ya etúká oyo euti kosalema”

Nini esalemaki? Alice alimboli ete akómaki konyokwama mingi na makanisi nsima ya liwa ya mobali na ye na 1997. Abondelaki Nzambe. Miniti zomi ekokaki te, Batatoli ya Yehova mibale oyo balobaka monɔkɔ ya Punjabi babɛtaki na porte ya ndako na ye mpe batikelaki ye trakte Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? Alice amonaki ete yango ezali eyano na libondeli na ye mpe azwaki ekateli ya koyanganaka ná Batatoli ya Yehova. Kasi epai wapi akokaki kokutana na bango? Mokolo moko, amonaki karnɛ moko ya kala esika akomá adrɛsi ya lisangá ya Punjabi oyo Stella apesaki ye. Alice akendaki na Ndako ya Bokonzi mpe bandeko basi mpe mibali ya lisangá ya Punjabi bayambaki ye na esengo. Alobi boye: “Bolingo oyo bamoniselaki ngai etikalaki ntango molai na motema na ngai mpe asalisaki ngai natika konyokwama na makanisi.”

Akómaki koyangana na makita mbala na mbala mpe azongelaki boyekoli na ye ya Biblia. Longola yango, ayekolaki kotánga mpe koloba monɔkɔ ya Punjabi malamu. Na mobu 2003, azwaki batisimo. Mokanda oyo atindelaki Stella esuki na maloba oyo: “Matɔndi mingi na ndenge olonaki mboto wana ya solo esili koleka mbula 29 mpe ndenge opesaki ngai ndakisa malamu ya kolanda.”

“Matɔndi mingi na ndenge olonaki mboto wana ya solo esili koleka mbula 29 mpe ndenge opesaki ngai ndakisa malamu ya kolanda.”​—Alice

Liteya nini tokoki kozwa na masolo wana? Soki moto azali na mposa ya koyeba Nzambe, azali na motema malamu, mpe azali na komikitisa, Yehova akosalisa ye akanga ntina ya mateya ya solo mpe andima yango, ata soki yango ekoki kosɛnga ntango mingi koleka ndenge tokanisaki. Kanisá maloba oyo ya ndakisa ya Yesu: “Mboto ebimi mpe ekoli, kasi [moloni] ayebi te soki esalemi ndenge nini. Mabele yango, kaka yango moko, ebandi kobota mbuma mokemoke: ya liboso lititi, na nsima motó, na nsuka nde mbuma mobimba na kati ya motó yango.” (Mrk. 4:27, 28) Bokoli ya ndenge wana eyaka mokemoke mpe esalemaka “kaka yango moko.” Mpo na koloba solo, mosakoli mokomoko ya Bokonzi ayebaka te ndenge oyo bokoli yango esalemaka. Na yango, soki okobi kolona mingi, na ntembe te, okobuka mpe mingi.

Kobosana mpe te ete libondeli ezali na ntina mingi. Georgina mpe Christine bazalaki kobondela Yehova. Soki yo mpe ‘otingami na mabondeli’ mpe obungisi elikya te ata “nsima ya mikolo mingi,” okoki kozwa lisusu “limpa” oyo obwakaki na mai.​—Rom. 12:12; Mos. 11:1.