Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA KOYEKOLA

Koyekola na likebi ekosalisa yo ozala ekɛngɛ

Koyekola na likebi ekosalisa yo ozala ekɛngɛ

Tángá Danyele 9:​1-19 mpo omona ntina ya koyekola na likebi.

Talelá lisolo mobimba. Makambo nini esalemaki liboso, mpe ndenge nini Danyele amiyokaki mpo na yango? (Dan. 5:29–6:5) Soki ozalaki na esika ya Danyele, olingaki komiyoka ndenge nini?

Kɔtá na mozindo. Mbala mosusu “babuku mosantu” oyo Danyele atángaki ezalaki nini? (Dan. 9:​2, msl.; w11 1/1 22 par. 2) Mpo na nini Danyele ayambolaki masumu na ye mpe oyo ya ekólo Yisraele? (Lev. 26:​39-42; 1 Bak. 8:​46-50; dp 182-184) Ndenge nini libondeli ya Danyele emonisi ete azalaki koyekola Liloba ya Nzambe na likebi?—Dan. 9:​11-13.

Bimisá mateya. Omituna boye:

  • ‘Nakoki kosala nini mpo makambo oyo ezali koleka na mokili elongola likebi na ngai te?’ (Mika 7:7)

  • ‘Soki nazali koyekola Biblia na likebi lokola Danyele, matomba nini nakozwa?’ (w04 1/8 12 par. 17)

  • “Makambo nini oyo nakoki koyekola ngai moko mpo esalisa ngai ‘nakoba kosɛnzɛla’?” (Mat. 24:​42, 44; w12 15/8 5 par. 7-8)