Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na likoló, eteni ya mokanda ya Yisaya na barulo ya Mbu ekufá, mpe na nse, eteni ya mokanda ya Yisaya na Arabe ya mikolo oyo. Nsango ya Nzambe oyo ezali na Makomami Mosantu ebongwaná te

Makomami Mosantu ebongwaná?

Makomami Mosantu ebongwaná?

Bato mosusu bamitunaka soki Makomami Mosantu ebongwaná. Mosakoli Yisaya alobaki ete liloba ya Nzambe “ekoumela seko.” (Yisaya 40:8) Mpo na nini tokoki kondima ete bilaka ya Nzambe ebatelamaki malamu?

Nzambe azali na nguya ya kobatela Liloba na ye mpo bato bábebisa yango te. Na ntango ya kala, bato oyo bazalaki kosala bakopi ya Makomami Mosantu, bazalaki kotánga likomami mokomoko mpo na komindimisa ete babakisi eloko te, babongoli eloko te, to mpe balongoli eloko te. Tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana bato mosusu oyo basalaki bakopi yango, basalaki bambeba mikemike.

MAKAMBO OYO EMONISI ETE MAKOMAMI MOSANTU EZALI MPENZA NSANGO YA NZAMBE

Bakopi ya bamaniskri ya kala ya Makomami Mosantu ezali ebele mpenza. Soki kopi moko ezalaki na mbeba, bazalaki kokokanisa yango na bakopi mosusu mpo na koyeba solo ya likambo.​—Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Biblia ebongwaná to babebisá makambo mosusu na kati?” ezali na jw.org.

Tózwa ndakisa ya bamaniskri ya kala oyo babengi barulo ya Mbu ekufá, oyo Ba-Arabe bamonaki na mabanga ya minene pene na Mbu ekufá na 1947. Baminiskri yango ya kala ezali na biteni ya Makomami Mosantu oyo esali mbula koleka 2 000. Bato ya mayele bakokanisaki bamaniskri yango ya kala na Makomami Mosantu oyo tozali na yango lelo oyo. Bamonaki nini?

Bato ya mayele bamonaki ete Makomami Mosantu oyo tozali na yango lelo ezali mpenza nsango ya Nzambe mpo ezali ndenge moko na makomami ya ebandeli. * Yango endimisi ete Nzambe abatelaki malamu Makomami Mosantu oyo tozali na yango.

Tokoki kotánga Makomami Mosantu na motema ya kokita mpo makambo oyo ezali na kati ezali mpenza solo. Sikoyo, tólobela makambo oyo basakoli balobi mpo na Nzambe.

^ par. 7 The Complete Dead Sea Scrolls in English (Barulo ya Mbu ekufá na mobimba na yango na Anglais), ya Geza Vermes, lokasa 16.