Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liwa ezali nzela ya bato nyonso

Liwa ezali nzela ya bato nyonso

KANISÁ ete ozali kotala filme ya moto moko oyo ayebani mingi, ekoki kozala mobɛti-miziki moko oyo olingaka mingi. Filme yango ezali kolobela bomwana na ye, ndenge ayekolaki miziki mpe ndenge akómaki kobɛta yango mbala na mbala. Na nsima, omoni ndenge abandaki kobɛta miziki liboso ya bato, kosala mibembo, mpe ayebanaki na mokili mobimba. Bongo akómaki mobange mpe na nsuka ya filme akufi.

Lisolo ya filme yango ezali mpenza likambo oyo esalema. Elobeli moto moko oyo azalaki na bomoi mpe akufá. Ata soki moto yango azalaki mobɛti-miziki, to moto ya siansi, to mopoti-mbangu, to mpe moto mosusu oyo ayebanaki mingi, lisolo ekosila kaka ndenge moko. Moto yango asalaki makambo minene na bomoi na ye, nzokande, soki akómaka mobange te to mpe akufaka te, akokaki kosala lisusu mingi koleka.

Koyeba ete liwa ekómelaka moto nyonso, epesaka mawa mingi. (Mosakoli 9:5) Ata soki tosali nini, tokokóma mibange mpe tokokufa. Lisusu, moto akoki kokufa mpo na maladi to mpo na aksida. Ndenge Biblia emonisi yango, tozali lokola londende oyo “ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwe.”​—Yakobo 4:14.

Bato mosusu bamonaka ete bomoi ezali mokuse, yango wana balobaka “tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Bakorinti 15:32) Bato balobaka bongo mpo bayebi ete bakoki kokufa mpe bakanisaka ete bomoi nyonso kaka yango oyo. Na ntango moko boye, mingimingi ntango moto azali kokutana na bampasi, amitunaka: ‘Bomoi nyonso kaka yango oyo?’ Epai wapi okoki kozwa eyano?

Bato mingi bakanisaka ete bato ya siansi nde bakopesa eyano. Bato ya siansi mpe minganga babimisi mayele mpe bankisi oyo ezali kosala ete moto akóma na bomoi ya mwa molai. Bato mosusu ya siansi bazali koluka mayele ya kokómisa bomoi lisusu molai koleka. Ata soki bakolonga kosala yango to bakolonga te, tozali kaka komituna mituna oyo: Mpo na nini tokómaka mibange mpe tokufaka? Mokolo mosusu liwa ekolongama? Masolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango mpe na motuna oyo: Bomoi nyonso kaka yango oyo?