Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ezali foti ya nani?

Ezali foti ya nani?

Soki bampasi eutaka epai ya Nzambe te, mpo na nini ebele ya bato bazali kokufa nzala, bobola, bitumba, maladi, mpe makama etondi na mokili? Biblia, Liloba ya Nzambe, eyebisi ntina misato ya minene oyo ezali kosala ete bato bányokwama:

  1. Moimi, lokoso, mpe koyinana. “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Mbala mingi, bato banyokwamaka mpo na makambo oyo bato ya kozanga kokoka, ya moimi, mpe ya mitema mabe basalaka.

  2. Ntango mpe makambo oyo ekanami te. Bato banyokwamaka “mpamba te ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango.” (Mosakoli 9:11) Elakisi ete moto akoki kozwa likama mpo azalaki na esika moko boye mpe likama eyei, to mpo moto moko atyaki likebi te to asalaki libunga.

  3. Mokili oyo ezali na mabɔkɔ ya moto mabe. Biblia emonisi polele ntina oyo mokili etondi na bampasi. Elobi: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) “Moto mabe” yango ezali Satana Zabolo, ekelamu moko ya elimo mpe ya nguya, oyo na ebandeli azalaki anzelu ya Nzambe, kasi “akangamaki makasi te na solo.” (Yoane 8:44) Baanzelu mosusu balandaki Satana mpe batɔmbɔkelaki Nzambe mpo na koluka matomba na bango moko; na ndenge yango, bakómaki bademo. (Ebandeli 6:1-5) Banda Satana ná bademo na ye batɔmbɔkelá Nzambe, bango nde bazali kotambwisa mokili oyo na ndenge ya mabe. Likambo yango ezali komonana mingimingi na ntango na biso. Sikoyo, Zabolo azali na nkanda makasi mpe “azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi,” mpe yango ememi “mawa na mabele.” (Emoniseli 12:9, 12) Satana azali moyangeli ya mabe mpenza. Asepelaka mingi komona bato bazali konyokwama. Ezali Satana nde abimiselaka bato bampasi, kasi Nzambe te.

KANISÁ NAINO: Kaka Zabolo, moto mabe, oyo ayokelaka bato mawa te, nde asepelaka komona bato bazali konyokwama. Nzokande, Biblia elobi: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Lokola Nzambe azali bolingo, “akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!”​—Yobo 34:10.

Kasi, okoki komituna boye: ‘Tii ntango nini Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akotika Satana ayangela mokili oyo?’ Ndenge tomoni yango, Nzambe ayinaka mabe, mpe ayokaka mpasi ntango azali komona biso tozali konyokwama. Longola yango, Liloba na ye elendisi biso ‘tóbwakela ye mitungisi na biso nyonso, mpo atyelaka biso likebi.’ (1 Petro 5:7) Nzambe alingaka biso mpe azali na nguya ya kolongola bampasi nyonso mpe kozanga bosembo, ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi. *

^ par. 7 Mpo na koyeba makambo mosusu etali ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, talá mokapo 11 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka, ebimisami na Batatoli ya Yehova, mpe okoki kozwa yango ofele na site Internet www.isa4310.com.