Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Na ntango ya kala, moto oyo alingi kosala mobembo na masuwa azalaki kosala nini?

MBALA mingi, bamasuwa mpo na komema kaka bato ezalaki te na mikolo ya ntoma Paulo. Mpo na kozwa esika na masuwa, moto oyo alingi kosala mobembo asengelaki kotuna bato soki bayebi masuwa moko oyo ememaka biloko, oyo ezali kokende nzela oyo ye alingi kokende, mpe soki bakolinga komema bato. (Mis. 21:2, 3) Ata soki masuwa ezali kokende mpenza te esika oyo moto yango azali kokende, na bisika oyo masuwa ekotɛlɛma, akoki koluka masuwa mosusu oyo ekoki kopusa ye pembeni ya esika oyo azali kokende.​—Mis. 27:1-6.

Mobembo ya masuwa ezalaki kosalema na bileko ya sikisiki na kati ya mbula, mpe mbala mingi bamasuwa ezalaki kobongola baprogramɛ na yango. Longola mipɛpɛ mpe bambula ya makasi, batambwisi-masuwa oyo bazalaki na biyambayamba bakokaki kopusa mokolo ya mobembo soki bamoni ete likambo ya mabe ekosalema, na ndakisa, soki yanganga (corbeau) etɛlɛmi na nsinga ya masuwa mpe ezali koganga, to soki bamonaki masuwa moko ezindá pembeni ya mokili. Batambwisi-masuwa bazalaki kotalela mopɛpɛ; na yango soki mopɛpɛ ezali malamu, bazalaki kotika libongo mpe kokende. Soki moto azwi esika na masuwa moko, azalaki komema biloko na ye mpe kokende kofanda mosika te na libongo mpo na kozela tii bakoloba ete masuwa elingi kolongwa.

Moto moko ya istware na nkombo Lionel Casson alobi boye: “Na engumba ya Roma, bazwaki bibongiseli mpo ezala mpasi te bato bázwa masuwa mpo na kosala mobembo, na esika bálukaluka bango moko. Libongo na yango ezalaki esika oyo Ebale Tibre ekutaná na mbu. Na mboka Ostie, oyo ezalaki mosika te, ezalaki na esika moko monene babengi piazza mpe babiro ebele ezalaki zingazinga. Babiro yango mingi ezalaki ya bato oyo bazalaki kosala mpo na bamasuwa ndenge na ndenge: masuwa ya Narbonne [lelo France] ezalaki na biro moko, masuwa ya Carthage [lelo Tunisie] ezalaki na biro moko, . . . mpe bongo na bongo. Moto oyo azali koluka masuwa mpo asala mobembo asengelaki kaka kokende na babiro yango mpo na kotuna soki masuwa nini ekokende na nzela na ye.”

Nzela ya mai ezalaki kosalisa bato bábebisa ntango te, kasi ezalaki mpe na makama. Ntoma Paulo azindaki na masuwa mbala ebele na mibembo na ye ya misionɛrɛ.​—2 Ko. 11:25.