Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 17

Yehova alingaka yo mpenza!

Yehova alingaka yo mpenza!

“Yehova azali kosepela na bato na ye.”​—NZ. 149:4.

LOYEMBO 108 Bolingo ya sembo ya Nzambe

NA MOKUSE *

Tata na biso ya likoló “asepelaka” na mokomoko na biso (Talá paragrafe 1)

1. Yehova amonaka makambo nini epai ya basaleli na ye?

YEHOVA NZAMBE “asepelaka na bato na ye.” (Nz. 149:4) Koyeba likambo yango esepelisaka biso mpenza! Yehova amonaka bizaleli na biso ya malamu, ayebaka ete na mikolo ezali koya tokoki kokóma bato malamu, mpe abendaka biso penepene na ye. Soki totikali sembo epai na ye, ye mpe akozala penepene na biso mpo na libela.​—Yoa. 6:44.

2. Mpo na nini bato mosusu bazalaka na mokakatano ya kondima ete Yehova alingaka bango?

2 Moto mosusu akoki koloba boye: ‘Nayebi ete Yehova alingaka basaleli na ye nyonso. Kasi nini emonisi ete alingaka ngai mpenza?’ Nini ekoki kotinda moto amituna bongo? Oksana, * oyo anyokwamaki mingi ntango azalaki mwana moke alobi boye: “Nasepelaki mingi ntango nazwaki batisimo mpe ntango nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Kasi mbula 15 na nsima, nakómaki kokanisa makambo ya mpasi oyo nakutanaki na yango ntango nazalaki mwana. Namonaki ete Yehova andimaka ngai te mpe ebongi te ete alinga ngai.” Yua, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela, oyo anyokwamaki mpe mingi ntango azalaki naino mwana, alobi boye: “Namipesaki na Yehova mpo nalingaki kosepelisa motema na ye. Kasi namindimisaki ete akoki kolinga ngai ata moke te.”

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Ndenge moko na bandeko basi oyo touti kolobela, na ntembe te yo mpe olingaka Yehova mingi, kasi okoki kozala na mokakatano ya kondima ete ye mpe alingaka yo. Mpo na nini osengeli kondima ete Yehova atyelaka yo mpenza likebi? Mpe nini ekoki kosalisa yo soki okómi kokanisa ete Yehova alingaka yo te? Na lisolo oyo tokozwa biyano na mituna yango.

KOBOYA KONDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA BISO EZALI MPENZA LIKAMA

4. Mpo na nini koboya kondima ete Yehova alingaka biso ezali mpenza likama?

4 Bolingo ezali na nguya mpenza mpe epesaka biso makasi. Soki tomindimisi ete Yehova alingaka biso, tokosalela ye na motema mobimba ata soki tokutani na mikakatano nini na bomoi na biso. Kasi soki tozali kondima te ete Nzambe atyelaka biso likebi, ‘nguya na biso ekozala moke.’ (Mas. 24:10) Mpe soki tolɛmbi nzoto mpe tokómi kokanisa ete Nzambe alingaka mpe atyelaka biso likebi te, ekozala mpasi te mpo Satana alonga biso.​—Ef. 6:16.

5. Nini ekómelaki bandeko mosusu oyo bazalaki kondima te ete Nzambe alingaka bango?

5 Bandeko na biso mosusu bakómaki kokanisa ete Yehova alingaka bango te mpe atyelaka bango likebi te. Mpe yango esalaki ete kondima na bango elɛmba. Nkulutu moko na nkombo James alobi boye: “Atako nazalaki na Betele mpe nazalaki kosepela ndenge nazalaki kosakola na teritware ya lisangá ya monɔkɔ ya bapaya, nazalaki komituna soki Yehova azalaki kosepela mpenza na mosala oyo nazalaki kosala. Kutu na ntango moko boye, nakómaki komituna soki Yehova azalaki koyoka mpenza mabondeli na ngai.” Eva, oyo azali mpe na mosala ya ntango nyonso, alobi boye: “Namoni ete ezali mpenza likama koboya kondima ete Yehova alingaka biso, mpo yango ekoki kobebisa makambo nyonso oyo tozali kosala na mosala na ye. Yango ekoki kosala ete osepela lisusu te na makambo ya elimo mpe kosilisa esengo na yo na mosala ya Yehova.” Michael, oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe nkulutu, alobi boye: “Soki ondimaka te ete Yehova atyelaka yo likebi, okotika kosalela ye.”

6. Tosengeli kosala nini ntango tokómi kokanisa ete Nzambe alingaka biso te?

6 Masolo ya bandeko yango emonisi ete koboya kondima ete Yehova alingaka biso ekoki mpenza kobebisa kondima na biso. Kasi tosengeli kosala nini soki tokómi kokanisa ete Nzambe alingaka biso te? Tosengeli mbala moko kotika kokanisa bongo. Sɛngá Yehova asalisa yo olongola “makanisi oyo etungisaka” mpo okóma na ‘kimya ya Nzambe oyo ekobatela motema mpe makanisi na yo.’ (Nz. 139:23; Flp. 4:6, 7) Mpe kobosana te ete ozali yo moko te. Bandeko mosusu ya sembo mpe bazali kobundana na makanisi ya ndenge wana. Ata basaleli ya Yehova ya ntango ya kala mpe basengelaki kobundisa makanisi ya ndenge wana. Tótala mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya ntoma Paulo.

MATEYA OYO TOKOKI KOZWA NA MAKAMBO OYO PAULO AKUTANAKI NA YANGO

7. Mikakatano nini Paulo akutanaki na yango?

7 Na bantango mosusu ekómelaka yo omiyoka ete ozali na mikumba mingi, mpe ete ezali mpasi osala likambo mokomoko oyo osengelaki kosala? Soki ezali bongo, okomitya na esika ya Paulo. Azalaki komitungisa kaka mpo na lisangá moko te, kasi “mpo na masangá nyonso.” (2 Ko. 11:23-28) Ozali na maladi moko oyo eumeli mpe oyo mbala mingi esilisaka yo esengo? Paulo azalaki na mokakatano moko oyo enyokolaki ye mingi. Ekoki kozala maladi moko oyo ezalaki konyokola ye mpe azalaki na mposa ete maladi yango esila. (2 Ko. 12:7-10) Na bantango mosusu ekómelaka yo olɛmba nzoto mpo na mabunga na yo moko? Yango mpe ekómelaki Paulo na ntango moko boye. Amibengaki “moto ya mawa” mpo azalaki kobunda ntango nyonso mpo na kosala oyo ezali malamu.​—Rom. 7:21-24.

8. Nini esalisaki Paulo ayika mpiko atako akutanaki na mikakatano?

8 Atako Paulo akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge mpe makambo oyo elɛmbisaki ye nzoto, akobaki kosalela Yehova. Nini epesaki ye makasi ya kosala bongo? Atako ayebaki malamu mabunga na ye, azalaki na kondima makasi na lisiko. Ayebaki mpe elaka ya Yesu oyo elobi ete ‘moto nyonso oyo azali kondimela Yesu akozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16; Rom. 6:23) Ya solo, Paulo azalaki na kati ya bato oyo bazalaki kondimela lisiko. Amindimisaki ete Yehova asepelaka kolimbisa ata baoyo basalá masumu ya minene soki babongoli motema.​—Nz. 86:5.

9. Maloba ya Paulo oyo ezali na Bagalatia 2:20 ekoki koteya biso nini?

9 Paulo azalaki mpe na kondima ete Nzambe alingaki ye mingi mpo ayebaki ete atindaki Yesu akufa mpo na ye. (Tángá Bagalatia 2:20.) Tótala maloba kitoko oyo ezali na nsuka ya vɛrsɛ yango. Paulo alobaki: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” Paulo amonaki te ete azalaki moto mabe mpo Nzambe alinga ye te. Akanisaki mpe te ete: ‘Namoni ntina oyo Yehova alingaka bandeko na ngai, kasi akoki kolinga ngai te.’ Paulo ayebisaki bakristo ya Roma boye: “Ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Rom. 5:8) Eloko moko te ekoki kopekisa Nzambe alinga biso!

10. Baroma 8:38, 39 eteyi biso nini?

10 Tángá Baroma 8:38, 39. Paulo ayebaki ete bolingo ya Nzambe ezali mpenza na nguya. Akomaki ete ‘eloko moko te ekokoka kokabola biso na bolingo ya Nzambe.’ Paulo ayebaki ndenge oyo Yehova amoniselaki Bayisraele motema molai. Ayebaki mpe ndenge oyo Yehova amoniselaki ye motema mawa. Na maloba mosusu, Paulo azalaki koloba boye: ‘Lokola Yehova atindaki Mwana na ye akufa mpo na ngai, yango esengeli kondimisa ngai ete alingaka ngai mingi.’​—Rom. 8:32.

Eloko oyo ezali na ntina na miso ya Nzambe, ezali makambo oyo tozali kosala sikoyo mpe oyo tokosala na mikolo ezali koya,  kasi te mabunga oyo tosalá kala (Talá paragrafe 11) *

11. Atako Paulo asalaki masumu oyo elobelami na 1 Timote 1:12-15, nini endimisaki ye ete Nzambe azalaki kolinga ye?

11 Tángá 1 Timote 1:12-15. Ekoki kozala ete Paulo azalaki komitungisa mpo na makambo oyo asalaki liboso akóma mokristo. Tokoki kokamwa te ndenge amibengaki mosumuki “ya liboso mpenza.” Liboso ayeba solo, Paulo anyokolaki bakristo na engumba moko nsima ya mosusu. Atyaki basusu na bolɔkɔ mpe apesaki tribinale mabɔkɔ ntango bazwaki ekateli ya koboma bakristo mosusu. (Mis. 26:10, 11) Kanisá ndenge oyo Paulo azalaki komiyoka soki akutani na elenge mokristo moko oyo ye apesaki nzela ete báboma baboti na ye. Paulo azalaki koyoka mawa makasi mpo na mabunga oyo asalá, kasi ayebaki ete akoki kobongola yango te. Andimaki ete Kristo akufaki mpo na ye, yango wana akomaki boye: “Mpo na boboto monene ya Nzambe nazali ndenge nazali.” (1 Ko. 15:3, 10) Yango eteyi biso nini? Osengeli kondima ete Kristo akufaki mpo na yo, mpe yango epesi yo likoki ya kozala na boyokani ya malamu elongo na Yehova. (Mis. 3:19) Eloko eleki ntina na miso ya Nzambe, ezali makambo oyo tozali kosala sikoyo mpe oyo tokosala na mikolo ezali koya. Kasi ezali te mabunga oyo tosalá kala, ezala tozalaki Batatoli ya Yehova na ntango wana to te.​—Yis. 1:18.

12. Ndenge nini maloba oyo ezali na 1 Yoane 3:19, 20 ekoki kosalisa biso soki tomoni ete tozali na ntina te mpe ebongi te Nzambe alinga biso?

12 Soki okanisi ndenge oyo Yesu akufaki mpo na kozipa masumu na yo, ntango mosusu okoki koloba boye: ‘Nabongi te mpo na kozwa likabo ya motuya boye.’ Mpo na nini okoki komiyoka ndenge wana? Mpo motema na biso ya kozanga kokoka ekoki kotinda biso tókanisa ete tozali na ntina te mpe ebongi te bálinga biso. (Tángá 1 Yoane 3:19, 20.) Soki tokómi kokanisa bongo, tosengeli kobosana te ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso.” Bolingo oyo Tata na biso ya likoló azalaka na yango mpo na biso mpe ndenge oyo alimbisaka biso, ezali makasi koleka makanisi nyonso ya mabe oyo tokoki kozala na yango na mitema na biso. Tosengeli komindimisa ete Yehova alingaka biso. Mpo na kosala bongo, tosengeli koyekola Liloba na ye mbala na mbala, kobondela ye mbala na mbala mpe kolekisa ntango elongo na bato oyo basambelaka ye. Mpo na nini kosala makambo yango ezali na ntina?

NDENGE OYO KOYEKOLA BIBLIA, KOBONDELA, MPE BANINGA YA SEMBO BAKOKI KOSALISA BISO

13. Ndenge nini koyekola Liloba ya Nzambe esalisaka biso? (Talá mpe etanda “ Ndenge oyo Liloba ya Nzambe esalisaka bango.”)

13 Yekoláká Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mpe okomona lisusu bizaleli mingi ya kitoko ya Yehova. Yango ekosalisa yo omona ndenge oyo alingaka yo. Soki ozali komanyola mokolo na mokolo na makambo oyo ozali kotánga na Biblia, yango ekosalisa yo okanisa lisusu malamu koleka, mpe ‘ekosembola’ makanisi mpe motema na yo. (2 Tim. 3:16) Nkulutu moko na nkombo Kevin oyo azalaki kokanisa ete azali na ntina te, alobi boye: “Kotánga Nzembo 103 mpe komanyola na mokapo yango esalisi ngai nasembola makanisi na ngai mpe nayeba makambo oyo Yehova akanisaka mpo na ngai.” Eva, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Na nsuka ya mokolo nyonso, nazwaka ntango mpo na kokanisa makambo oyo ezali na ntina mpo na Yehova. Yango esalisaka ngai nazala na kimya ya motema mpe ekómisaka kondima na ngai makasi.”

14. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso?

14 Bondeláká mbala na mbala. (1 Tes. 5:17) Soki olingi kokóma moninga ya moto moko, osengeli kozwaka ntango ya kosolola na ye mbala na mbala mpe ya koyebisa ye ndenge oyo ozali komiyoka. Ezali mpe bongo na oyo etali boninga na biso ná Yehova. Soki tozali koyebisa ye ndenge tozali komiyoka, elingi koloba koyebisa ye makanisi mpe mitungisi na biso na libondeli, tokomonisa ete totyelaka ye motema mpe toyebi ete alingaka biso. (Nz. 94:17-19; 1 Yoa. 5:14, 16) Yua, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Ntango nabondelaka Yehova, nayebisaka ye kaka te makambo oyo nakutanaki na yango mokolo wana, kasi mpe makambo oyo nazali mpenza kokanisa mpe ndenge oyo nazali komiyoka. Mokemoke, nakómá komona Yehova kaka te lokola mokonzi moko ya kompanyi, kasi lokola tata oyo alingaka mpenza bana na ye.”​—Talá etanda “ Otángá yango?

15. Ndenge nini Yehova amonisi ete atyelaka biso likebi?

15 Salá boninga elongo na baoyo basalelaka Yehova. Bazali likabo oyo Yehova apesá biso. (Yak. 1:17) Tata na biso ya likoló amonisi ete atyelaka biso likebi ndenge apesá biso bandeko ya lisangá oyo balingaka biso “ntango nyonso.” (Mas. 17:17) Na mokanda oyo akomelaki bakristo ya Kolose, Paulo atángaki nkombo ya bandeko mosusu oyo basalisaki ye mpe abengaki bango ‘lisalisi oyo ezali kopesa ye makasi.’ (Kol. 4:10, 11) Ata Kristo Yesu azalaki mpe na mposa ya lisalisi ya basusu mpe amonisaki botɔndi mpo na lisalisi oyo baninga na ye bapesaki ye, ezala baanzelu to bato.​—Luka 22:28, 43.

16. Ndenge nini baninga ya sembo bakoki kosalisa biso tópusana lisusu penepene na Yehova?

16 Olukaka mpe ondimaka lisalisi oyo baninga na yo ya lisangá bapesaka yo? Ntango toyebisi moninga moko oyo akomɛli na elimo makambo oyo ezali kotungisa biso, yango emonisi te ete tozali na kondima moke. Kutu, yango ekoki nde kobatela biso. James, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Kosala boninga makasi elongo na bakristo oyo bakɔmeli esalisi ngai mingi mpenza. Ntango makanisi ya mabe elekeli ngai motó, baninga yango ya sembo bayokaka ngai na likebi mpe bayebisaka ngai ete balingaka ngai. Ntango basalaka bongo, namonaka mbala moko ete Yehova alingaka mpe atyelaka ngai likebi.” Ezali mpenza na ntina tókolisa mpe tóbatela boninga ya makasi elongo na bandeko na biso ya lisangá!

TIKÁLÁ NA KATI YA BOLINGO YA NZAMBE

17-18. Tosengeli koyokaka nani, mpe mpo na nini?

17 Satana alingaka ete tótika etumba oyo tozali kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu. Alingaka tókanisa ete Yehova alingaka biso te, mpe tobongi te abikisa biso. Kasi ndenge touti komona yango, ezali lokuta.

18 Yehova alingaka yo. Ozali mpenza na motuya na miso na ye. Soki otosi Yehova, lokola Yesu, yo mpe ‘okotikala na kati ya bolingo na ye’ mpo na libela. (Yoa. 15:10) Na yango, kondimela Satana te mpe kokanisa te ete Yehova alingaka yo te. Kasi yokáká nde Yehova, oyo amonaka makambo ya malamu oyo mokomoko na biso asalaka. Yebá ete “asepelaka na bato na ye,” ata mpe yo!

LOYEMBO 141 Bomoi ezali likamwisi

^ par. 5 Bandeko na biso mosusu bazalaka na mokakatano ya kondima ete Yehova alingaka bango. Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo tosengeli kondima ete Yehova alingaka mokomoko na biso. Tokolobela mpe oyo tokoki kosala soki tozali kondima te ete Yehova alingaka biso.

^ par. 2 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 67 NDIMBOLA YA BILILINGI: Liboso Paulo ayeba solo, anyokolaki bakristo mpe akɔtisaki bamosusu kati na bango na bolɔkɔ. Kasi ntango andimaki oyo Kristo asalaki mpo na ye, abongwanaki mpe alendisaki bandeko na ye bakristo, oyo basusu kati na bango bazalaki bandeko ya bato oyo ye anyokolaki.