Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Bomoi ya mwa nyama babengi likenge

Bomoi ya mwa nyama babengi likenge

LIKENGE, ezali mwa nyama ya moke oyo ezali lokola mayoyo mpe ezalaka na bakɔntina nyonso longola kaka na Antarctique. Kasi na nɔrdi-ɛsti ya Amerika, ezalaka na lolenge moko ya likenge oyo ekeseni na oyo ya bakɔntina mosusu mpe banda kala, ekamwisaka bato ya bioloji.

Tókanisa naino: Na eleko ya prɛnta, bamilio ya mwa banyama yango ebimaka na mbalakaka mpe esalaka kaka mwa bapɔsɔ. Kaka na ntango mokuse wana, elongolaka mposo na yango ya bomwana, esalaka makelele makasi, epumbwaka, ebotaka mpe na nsima ekufaka. Likambo ya kokamwa ezali ete bana na yango ebimaka nsima ya mbula 13 to 17, nakotalela lolenge ya mwa nyama yango. Bana ya mwa nyama yango ezalaka wapi na ntango wana nyonso?

Mpo na koyanola na motuna wana, tosengeli koyeba bomoi ya mwa nyama yango. Pɔsɔ moko nsima ya kobima, oyo ya mwasi ezwaka zemi mpe ebwakaka maki kobanda 400 tii 600 na bitape ya nzete mpe na nsima, mwa banyama yango ekufaka. Nsima ya mwa bapɔsɔ, maki na yango epasukaka mpe mwa bana yango ekweaka na mabele, esalaka madusu mpe ekómaka kofanda kuna mpo na kofiba mai ya misisa ya banzete mpe ya mwa banzete na boumeli ya bambula mingi. Nsima ya mbula soki 13 to 17, bana yango oyo ekoli ebimaka mpe esalaka kaka ndenge oyo ya liboso esalaki.

Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Nature) elobaki ete makambo ndenge na ndenge oyo esalemaka na bomoi ya mwa nyama yango “ekamwisaka bato ya siansi banda basiɛklɛ ebele. . . . Ata tii lelo, bato ya mayele oyo bayekolaka banyama mikemike balukaka koyeba makambo ya bomoi ya mwa nyama yango.” Bomoi ya mwa nyama yango ekeseni mpenza na oyo ya banyama mosusu.

Okanisi nini? Ndenge bomoi ya mwa nyama babengi likenge ezalaka, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?