Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Luká kokóma na baninga ebele

Luká kokóma na baninga ebele

Mokakatano

Soki tozali koboya bato oyo bautá na bituluku ya bato oyo tolingaka te, ezaleli ya kokanisela bato mabe oyo tozali na yango ekoki kokola mingi mpenza. Mpe soki baninga na biso bazali kaka lokola biso, tokoki kokanisa ete, lolenge ya malamu ya kokanisa, ya koyoka to ya kosala likambo, ezali kaka oyo biso tozali na yango.

Toli ya Biblia

“Bófungwama.”​—2 BAKORINTI 6:13.

Elingi koloba nini? Bófungwama elingi koloba, tófungola motema na biso, bolingo na biso. Soki tozali kolinga kaka bato oyo bazali lokola biso, motema na biso ekokangama, ekokóma nkaka. Mpo motema na biso ekangama te, tosengeli kokóma baninga ya bato oyo tokeseni na bango.

Ntina ya kokóma na baninga ebele

Ntango toyebi bato mosusu malamu mpenza, tokobanda koyeba mpo na nini bazali kosala makambo ndenge mosusu. Mpe ntango tozali kolinga bango mingi, tokomona lisusu te ete tokeseni. Tokosepela na bango lisusu mingi, esengo na bango ekozala esengo na biso, mpe mawa na bango ekozala mawa na biso.

Tózwa ndakisa ya Nazaré. Azaláká kokanisela bapaya oyo bayá kofanda na mboka na bango mabe. Alobi eloko oyo esalisaki ye: “Nabandaki kosolola mpe kosala elongo na bango. Namonaki ete bakeseni mpenza na ndenge oyo bato ya mboka na ngai bazalaki kolobela bango. Ntango okómi moninga ya bato oyo bazali na mimeseno ekeseni mpenza na oyo ya yo, okomona ete bango nyonso bazali ndenge moko te; okolinga bango mingi mpe okomona ete mokomoko na bango azali mpenza na valɛrɛ.”

Oyo okoki kosala

Luká mabaku ya kosolola na bato oyo bautá na mboka mosusu, ya ekólo mosusu to oyo balobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo ya yo. Okoki

  • Kotuna bango báyebisa yo makambo na bango moko.

  • Kobenga bango báya kolya mwa eloko epai na yo.

  • Kotya likebi mpenza na masolo ya bomoi na bango oyo bakoyebisa yo mpe luká koyeba makambo balingaka.

Soki oluki koyeba makambo oyo bakutaná na yango oyo ekómisa bango ndenge bazali, na ntembe te, okobanda kokanisela bango lisusu mabe te.