Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 3

Koyeba kokanga motema

Koyeba kokanga motema

KOKANGA MOTEMA ELIMBOLI NINI?

Moto oyo ayebi kokanga motema alɛmbaka te ntango akutani na likambo oyo ebɛtisi ye libaku to oyo ekoki kolɛmbisa ye nzoto. Moto akómaka na ezaleli yango ntango azali kokutana na makambo mingi na bomoi na ye. Ndenge kaka mwana akweaka mbala na mbala ntango azali koyekola kotambola, mpo moto alonga na bomoi, asengeli koyekola kokanga motema na mikakatano ya bomoi.

MPO NA NINI KOKANGA MOTEMA EZALI NA NTINA?

Bana mosusu balɛmbaka nzoto ntango balongi te kosala likambo moko boye, ntango bakutani na mikakatano to ntango basusu bazali kotyola bango. Bana mosusu kutu basundolaka nyonso. Kasi bana basengeli koyeba makambo oyo:

  • Tokoki te kolonga na makambo nyonso.​—Yakobo 3:2.

  • Mikakatano ekoki kokómela moto nyonso.​—Mosakoli 9:11.

  • Toli esalisaka biso mpe epesaka biso mayele.​—Masese 9:9.

Kokanga motema ekosalisa mwana na yo ayeba ete akoki kolonga mikakatano ya bomoi.

NDENGE YA KOSALISA BANA BÁYEBA KOKANGA MOTEMA

Ntango mwana alongi te na likambo moko.

TOLI YA BIBLIA: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.”​—Masese 24:16.

Salisá mwana na yo akómisaka te likambo ya moke monene. Na ndakisa, akoki kosala nini soki azwi te na ekzamɛ moko na kelasi? Akoki kolɛmba nzoto, mpe koloba: “Nakokoka te kosala likambo ya malamu!”

Mpo oteya mwana ayeba kokanga motema, lakisá ye mayele oyo akoki kosalela mpo asala malamu mbala ya nsima. Na ndenge yango, akoyeba ndenge ya kosilisa makambo na esika ete akweaka mbala na mbala.

Lisusu, soki akutani na mokakatano, kosilisela ye yango te. Kasi, salisá ye nde ayeba ndenge oyo ye moko akoki kosilisa yango. Na ndakisa, soki mwana azwaki te na ekzamɛ, okoki kotuna ye boye: “Okoki kosala nini mpo oyeba malamu makambo oyo bateyaki bino?”

Ntango likama ebimi.

TOLI YA BIBLIA: “Boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.”​—Yakobo 4:14.

Bomoi ezali na makambo ebele. Moto oyo azali na bozwi lelo, lobi akoki kokóma mobola, mpe moto oyo azali na nzoto malamu akoki mpe kobɛla. Biblia elobi: “Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba . . . mpamba te ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”​—Mosakoli 9:11.

Lokola ozali moboti, olingaka kosala nyonso mpo na kobatela mwana na yo na makama. Kasi, yebá ete okoki te kobatela mwana na makambo nyonso ya mabe oyo ekoki kokóma na bomoi.

Ya solo, lokola mwana na yo akomi naino mokolo te, akokutana te na likambo lokola kobungisa mosala to kozanga mbongo. Kasi, okoki kosalisa ye akanga motema ntango akutani na makambo mosusu ya mpasi, na ndakisa ntango akabwani na moninga moko to ndeko ya libota akufi. *

Ntango basemboli mwana na yo.

TOLI YA BIBLIA: “Yoká toli . . . mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.”​—Masese 19:20.

Ntango moto asemboli mwana na yo na likambo moko, ezali te mpo na kobangisa ye; ezali nde mpo na kosalisa ye asala malamu mbala ya nsima to ayeba esika oyo asengeli kobongisa.

Soki ozali kosalisa mwana na yo andima toli, bino mibale bokozwa bolamu. Tata moko na nkombo John, alobi: “Soki oboyaka kosembola bana ntango basali mabunga, bakozwa mayele te. Bakokóma na mikakatano mingi na bomoi na bango mpe okozala ntango nyonso na mokumba ya koluka kosilisa yango. Yango ekosala ete bomoi ezala mpasi mpo na baboti mpe mpo na bana.”

Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo amona bolamu oyo akozwa soki andimi básembola ye? Ntango basemboli mwana na yo, ezala na eteyelo to esika nini, koloba te ete ebongaki te básembola ye. Kasi okoki kotuna ye boye:

  • “Mpo na nini basemboli yo?”

  • “Esika nini omoni ete osengeli kobongisa?”

  • Okosala nini soki likambo oyo osalaki ekómeli yo lisusu mbala ya nsima?

Kobosana te ete soki basemboli mwana na yo, ekosalisa ye kaka lelo te, kasi mpe ntango akokóma mokóló.

^ par. 21 Talá lisolo “Ndenge ya kosalisa mwana ntango bokufeli ndeko,” na Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya 01/07/2008.