Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Aras ya bule mpe ya langi ya mosaka. Molai na yango: Santimɛtrɛ 85

Bandɛkɛ kitoko oyo babengi aras

Bandɛkɛ kitoko oyo babengi aras

OKOKI komona balangi oyo ezali kongɛnga ntango ebele ya bandɛkɛ yango ezali kopumbwa na zamba! Ntango bato ya Mpoto bayaki kotala Amerika ya ntei mpe ya sudi na ebandeli ya siɛklɛ ya 15 bamonaki yango mpe bakamwaki. Bamonaki nde bandɛkɛ yango, oyo ezali batshaku oyo nsala na yango ya nsima ezali milai mpe ezalaka na mikili ya molunge ya Amerika. Liboso, bazalaki kotya bafɔtɔ ya bandɛkɛ yango na bakarte ya mokili yango lokola elembo ya paradiso oyo bamonaki sika.

Bandɛkɛ yango, ezala basi to mibali ezalaka langilangi mpe ekeseni mpenza na bandɛkɛ mosusu oyo ezalaka na balangi. Bandɛkɛ yango oyo esalaka makelele makasi ezalaka mayele mpe etambolaka elongo. Motángo koleka 30 ya bandɛkɛ yango elongwaka na zumbu na yango na ntɔngɔ mpenza mpo na koluka misisa, mbuma mpe biloko mosusu ya kolya. Lokola batshaku nyonso, mbala mingi esalelaka manzaka na yango mpo na kokanga bilei mpe na nsima ezwaka yango na monɔkɔ na yango ya monene oyo egumbamá mwa moke. Ekoki kutu kopasola ndika na monɔkɔ! Nsima ya kolya, ekendaka na bangomba to pene ya mai mpo na kolya zɛlo oyo ekoki kosalisa na kolongola pwazɔ na bilei na bango mpe kozwa biloko mosusu oyo nzoto ezali na yango mposa.

“[Nzambe] asali eloko nyonso kitoko na ntango na yango.”Mosakoli 3:11

Ndɛkɛ yango ya mwasi ná mobali elekisaka bomoi mobimba elongo mpe ebatelaka bana na yango elongo. Bandɛkɛ yango ya ndenge na ndenge efandaka na madusu ya nzete, na mabulu pembenipembeni ya bibale, na lindɔngɛ to na mabulu mpe madusu ya bangomba. Ata soki ekoli mpenza nsima ya sanza motoba, mwana ya ndɛkɛ yango etikalaka kaka esika moko na baboti na yango tii mbula soki misato. Na zamba, ndɛkɛ yango eumelaka na bomoi mbula 30 to 40, kasi soki bakangi yango mpo na kobɔkɔla, ekoki koumela mbula koleka 60. Ezali na balolenge soki 18 ya bandɛkɛ yango, mwa ndambo yango oyo.

Aras ya mapapu ya langi ya mai ya pondu, oyo babengaka yango mpe aras ya motane-mai ya pondu. Molai na yango: Tii santimɛtrɛ 95

Aras ya motane. Molai na yango: Santimɛtrɛ 85

Aras ya yasɛnti. Molai na yango: Tii santimɛtrɛ 100. Yango eleki batshaku nyonso na monene, ekoki koleka kilo moko na ndambo (1.3 kg)