Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 1 2018 | Nini epesaka esengo?

EPAI WAPI TOKOKI KOZWA BATOLI OYO EBONGI MPO NA KOZALA NA BOMOI YA ESENGO?

Biblia elobi: “Esengo na bato oyo bazangi mbeba na nzela na bango.”​—Nzembo 119:1.

Masolo 7 oyo ezali na Lamuká! oyo elobeli batoli ya kotyela motema oyo esilaka ngala te, oyo ekoki kosalisa moto azala mpenza na esengo.

 

Mpo na kozala na esengo

Yo moko omonaka ete ozalaka moto ya esengo? Nini epesaka moto esengo?

Kosepela na oyo ozali na yango mpe kokaba

Bato mingi balobaka ete biloko ya mokili to bozwi nde epesaka esengo. Kasi, mbongo mpe biloko ya mokili epesaka mpenza esengo ya solosolo? Tótalela yango.

Bolingo

Moto azalaka na esengo soki azali kolinga basusu mpe basusu bazali kolinga ye.

Kolimbisa

Soki moto asilikaka mpambampamba mpe abombaka nkanda na motema, akozala na esengo te, akozala mpe na sante malamu te.

Kozala na bomoi oyo ezali na ntina

Moto azalaka na esengo soki azwi biyano na mituna minene ya bomoi oyo amitunaka.

Elikya

Bato mingi bakanisaka ete bakoki kozala na esengo te soki bayebi te nini ekokómela bango mpe bandeko na bango na mikolo ezali koya.

Olingi koyeba makambo mosusu?

Ezali na makambo ebele oyo esalaka ete moto azala na esengo to te. Luká koyeba makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo olonga mikakatano minene ya bomoi.