Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ntango yo ná molongani na yo bokeseni na makambo

Ntango yo ná molongani na yo bokeseni na makambo

MOKAKATANO

Yo olingaka masano; molongani na yo alingaka kotánga babuku. Osalaka makambo na molɔngɔ; kasi molongani na yo asalaka makambo na mwa mobulu. Yo olingaka kozala elongo na bato; kasi ye alingaka kozala ye moko.

Omilobeli boye: ‘Ngai ná ye tokeseni mpenza! Mpo na nini tomonaki yango te ntango tozalaki bafianse?’

Ekoki kozala omonaki yango ata mwa moke. Kasi na ntango wana ozalaki kolandela yango te; sikoyo lokola obali, ekozala malamu ozongela ezaleli wana ya kala. Lisolo oyo ekosalisa yo osala bongo. Kasi liboso, tótalela mwa makambo oyo emonisi lokola ete bokeseni.

OYO OSENGELI KOYEBA

Bokoki kokesana na makambo ya ntina mpenza. Ntango bozali bafianse, bokolekisa ntango mingi nde na koluka koyeba soki bokokani to te. Na yango, bafianse mingi bakabwanaka soki bamoni ete bakeseni na makambo ya ntina mpenza na esika bákende tii na libala oyo ekokabwana. Bongo soki bakeseni na makambo ya mikemike, na ndakisa oyo ezangaka te na libala?

Bato mibale bakokanaka na makambo nyonso te. Na yango, ezali mabe te soki babalani bakeseni na likambo moko to na mwa makambo oyo elandi:

Makambo oyo esepelisaka moto. Mwasi moko na nkombo Anna, * alobi boye: “Ngai nasepelaka mpenza te kokende kotambolatambola, na ndakisa komata na bangomba ya nɛjɛ mpe kotambola mikolo ebele na zamba ndenge mobali na ngai akolá.”

Mimeseno. Mobali moko na nkombo Brian, alobi boye: “Mwasi na ngai alalaka noki te kasi alamukaka ntɔngɔntɔngɔ na 5:00, kasi ngai nasengeli kolala bangonga 7 to 8 soki te, nakómaka nkandankanda.”

Bizaleli. Mbala mosusu yo olobaka mingi te kasi molongani na yo alobaka mingi. Mobali moko na nkombo David, alobi boye: “Ndenge nakolá, nalobaka makambo na ngai polele te kasi mwasi na ngai autá na libota oyo balobaka makambo nyonso polelepolele.”

Kokesana na makambo ekoki kozala na litomba. Mwasi moko na nkombo Helena, alobi boye: “Likanisi na ngai ekoki kozala malamu, kasi elingi koloba te ete kaka yango nde ezali malamu.”

OYO OKOKI KOSALA

Koluka litomba na yo moko te. Mobali moko na nkombo Adam, alobi boye: “Mwasi na ngai Karen alingaka masano ata moke te. Kasi, akendaka ná ngai na masano ebele mpe asepelaka kutu soki ngai nasepeli. Kasi, ye asepelaka kokende kotala biloko oyo batyaka na ba-musée, yango wana tokendaka na ye mpe tolekisaka ntango mingi ndenge alingi. Lokola biloko yango ezalaka na ntina mpo na mwasi na ngai, nasalaka nyonso nasepela na yango.”​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 10:24.

Talelá likambo na mobimba na yango. Soki molongani na yo atalelaka makambo ndenge moko te na yo, yango elingi koloba te ete makanisi na ye ezali mabe. Yango nde liteya oyo mobali moko na nkombo Alex azwaki; alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso kokanisa ete ezali kaka na lolenge moko ya kosala mpo likambo moko ebonga mpe soki nasali bongo te ekosimba te, kasi libala esalisá ngai namona ete ezali na balolenge mingi ya kosala mpo likambo kaka moko wana esimba mpe ete lolenge mokomoko ezalaka na litomba na yango.”​—Toli ya Biblia: 1 Petro 5:5.

Kokanisa te ete makambo ekozala kaka ndenge olingi. Kokokana na makambo elingi koloba te ete bokómi ndenge moko. Yango wana, koloba te ete bosalaki mabe ndenge bobalanaki kaka mpo na makambo mikemike oyo bokeseni na yango. Buku moko (The Case Against Divorce) elobi ete: “Bato mingi balobaka na nsima ete ‘bolingo ekangaki ngai miso.’” Buku yango ebakisi boye: “Mokolo na mokolo oyo bozali kolekisa na esengo, emonisi ete ata soki bokeseni, bokoki kolingana.” Bólanda toli oyo: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu . . . soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​—Bakolose 3:13.

Meká kosala boye: Komá makambo oyo olingaka mpe oyo omonaka ete molongani na yo mpe alingaka. Na nsima komá makambo oyo omoni ete bokeseni na yango. Okomona ete bokeseni yango ezali mpenza makasi te. Yango ekosalisa yo omona bisika oyo esengeli kokipe te to mpe bisika mosusu oyo okoluka litomba ya molongani na yo. Mobali moko na nkombo Kenneth, alobi boye: “Nasepelaka soki mwasi na ngai amitye na esika na ngai mpe nayebi ete ye mpe asepelaka soki namitye na esika na ye. Ata soki esɛngi namipimela, esengo na ye epesaka ngai mpe esengo.”​—Toli ya Biblia: Bafilipi 4:5.

^ par. 10 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.