Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya koboya kobomba nkanda

Ndenge ya koboya kobomba nkanda

MOKAKATANO

Ozali kokoka te kobosana makambo ya mabe oyo molongani na yo alobaki to asalaki; maloba mpe makambo yango ezali kolongwa te na makanisi na yo. Yango esali ete nkanda ezwa esika ya bolingo oyo ozalaki na yango mpo na ye. Emonani ete likambo mosusu ya kosala ezali te, kasi osengeli kokoba na libala yango oyo ezangi bolingo. Yango mpe esali ete okangela molongani na yo nkanda.

Yebá ete makambo ekoki kobonga. Kasi liboso, tótalela mwa makambo oyo etali kobomba nkanda.

OYO OSENGELI KOYEBA

Kokoba kobomba nkanda esalaka ete libala ekóma na mikakatano mingi mpe makambo etambola malamu te

Kobomba nkanda ekoki kobebisa libala. Mpo na nini? Mpo ebebisaka mpenza bizaleli oyo esalaka ete libala ezala malamu, na ndakisa bolingo, kotyelana motema mpe bosembo. Na maloba mosusu, kobomba nkanda na motema te nde ebimisaka mikakatano na libala, kasi yango moko nde ezali mokakatano na libala. Mpo na yango, Biblia elobi boye: ‘Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi elongwa mosika na bino.’​—Baefese 4:31.

Kobomba nkanda ezali komisala mabe. Kobomba nkanda na motema ezali lokola komibɛta mbata mpe na nsima komizela ete moto mosusu ayoka mpasi. Na buku na ye (Healing From Family Rifts) Mark Sichel, mokomi moko, alobi boye: “Mbala mosusu moto oyo obombeli nkanda azali malamu, azali na ye kosepela na bomoi mpe ntango mosusu azali komitungisa ata moke te na likambo yango.” Na mokuse, Sichel alobi boye: “Kobomba nkanda na motema ekosala yo mabe koleka moto oyo obombeli nkanda.”

Kobomba nkanda na motema ezali lokola komibɛta mbata mpe na nsima komizela ete moto mosusu ayoka mpasi

Okoki kopona kobomba nkanda to te. Bato mosusu bakoki kotyela likambo yango ntembe. Bakoki koloba, ‘molongani na ngai nde asali ete nabombela ye nkanda.’ Mokakatano ezali ete makanisi ya ndenge wana ekendaka mingi na makambo oyo moto mosusu asali, nzokande tozali na likoki te ya kopekisa ye asala likambo boye to boye. Biblia elobi oyo tosengeli kosala; elobi boye: ‘Moto na moto ameka misala na ye moko ndenge ezali.’ (Bagalatia 6:4) Tokoki te kopekisa moto mosusu aloba to asala likambo boye to boye kasi tokoki kopona ndenge ya kosala na likambo yango. Kaka kobomba nkanda te nde ezali likambo oyo osengeli kopona.

OYO OKOKI KOSALA

Kopesa molongani na yo foti te mpo na nkanda na yo. Ya solo, ezalaka mpasi te kopesa molongani na yo foti. Kasi, kobosana te ete kobomba nkanda ezali likambo oyo okoki kopona to te. Ezali mpe bongo mpo na kolimbisa. Okoki kopona kolanda toli oyo ya Biblia: “Moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” (Baefese 4:26) Kolimbisa epesaka likoki ya kosilisa mikakatano na libala na makanisi ya malamu.​—Toli ya Biblia: Bakolose 3:13.

Mitalelá malamumalamu. Biblia elobi ete bato mosusu ‘balingá kosilika’ mpe ‘balingá nkɛlɛ.’ (Masese 29:22) Yo mpe ozalaka bongo? Omituna boye: ‘Nazalaka na momeseno ya kobomba nkanda? Nasilikaka noki? Nalukaka nde kokómisa likambo moke monene?’ Biblia elobi ete “ye oyo azali se kolobaloba likambo azali kokabola baninga ya motema.” (Masese 17:9; Mosakoli 7:9) Likambo yango ekoki mpe kosalema na libala. Soki ozalaka na momeseno ya kobomba nkanda, omituna boye: ‘Nakoki kozala motema molai epai ya molongani na ngai?’​—Toli ya Biblia: 1 Petro 4:8.

Luká koyeba makambo oyo eleki mpenza ntina. Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Ezali na ntina te kolobela likambo nyonso ya mabe oyo basali yo; na bantango mosusu okoki kaka ‘koloba na motema na yo, na mbeto na yo, mpe kofanda nyɛɛ.’ (Nzembo 4:4) Ntango olingi kolobela likambo moko oyo epesaki yo nkanda, zelá tii ntango nkanda yango ekosila. Mwasi moko na nkombo Beatriz alobi boye: “Soki moto asali likambo oyo epesi ngai nkanda, nalukaka naino kokitisa motema. Na bantango mosusu, namonaka na nsima ete ezalaki mpenza likambo ya monene te mpe na nsima esalaka ete nalobela likambo yango na limemya.”​—Toli ya Biblia: Masese 19:11.

Yebá soki “kolimbisa” elakisi nini. Na Biblia, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kolimbisa” emonisaka na bantango mosusu kotika likambo moko eleka. Na yango, kolimbisa esɛngi te kozwa likambo yango na lisɛki to kosala lokola likambo moko te esalemi; elingi nde koloba kotika likambo moko eleka, komona ete kobomba nkanda ekoki kobebisa makasi sante mpe libala na yo koleka nkanda yango moko.