Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Siruse Monene

Siruse Monene

Kalandriye ya mikolo na biso emonisi ete na butu ya 05-06 sanza ya zomi, mobu 539 liboso ya ntango na biso, likambo oyo ezalaki komonana lokola ekoki kosalema te ekómelaki Babilone, mboka-mokonzi ya ampire ya Babilone. Ndenge esakolamaki, na butu yango, engumba yango ekweaki na mabɔkɔ ya basoda ya Bamede ná Baperse, oyo Siruse, mokonzi ya Perse, oyo ayebanaki mpe na nkombo Siruse monene, azalaki kokamba. Asalelaki mayele moko ya malamu mpenza.

NDENGE OYO SIRUSE AKWEISAKI BABILONE

Buku moko (Ancient World Leaders​Cyrus the Great) elobi boye: “Ntango Siruse azwaki ekateli ya kokweisa Babilone, engumba yango ezalaki na lokumu koleka bingumba nyonso ya Moyen-Orient; ekoki kozala ete elekaki bingumba nyonso ya mokili na lokumu.” Babilone ezingamaki na ebale Efrate, oyo mai na yango ezalaki kotondisa baterase ya mozindo oyo ezalaki zingazinga ya bifelo milaimilai; nyonso wana ezalaki kosala ete Babilone emonana lokola ekoki soki moke te kokwea na mabɔkɔ ya banguna.

Kobanda esika oyo mai yango ezalaki kouta na Babilone, basoda ya Siruse balekisaki yango na nzela mosusu mpe yango esalaki ete mai ekita. Na nsima, basoda yango batambolaki na kati ya ebale tii na baporte ya engumba oyo ezalaki polele, mpe bazwaki Babilone kozanga ete bábunda. Hérodote mpe Xénophon Bagrɛki oyo bazalaki bato ya istware balobaki ete lokola engumba yango ebatelamaki malamu, bato ya Babilone bazalaki komona ete mabe ekokómela bango te, yango wana, na butu oyo babundisaki bango, mingi na bango bazalaki na fɛti, ata mpe mokonzi! (Talá etanda  “Makomi ezali na efelo.”) Lisusu, ndenge oyo Siruse akweisaki Babilone, ekokisaki bisakweli mosusu ya kokamwa ya Biblia.

Biblia esakolaki ndenge oyo Siruse akokweisa Babilone

BISAKWELI YA KOKAMWA MPENZA

Bisakweli ya Yisaya ezali mpenza na ntina mpo ekomamaki mbula soki 200 liboso; ekoki kozala mbula 150 liboso kutu Siruse abotama! Tótalela makambo oyo elandi:

BABIKISAMAKI NA NDENGE YA LIKAMWISI

Mwa liboso, na mobu 607 liboso ya ntango na biso, mampinga ya Babilone ebebisaki Yerusaleme mpe ememaki bato mingi oyo babikaki na boombo. Bayuda bakotikala na boombo mbula boni? Nzambe alobaki boye: “Ntango mbula ntuku nsambo ekokokisama, nakolandela mokonzi ya Babilone mpe ekólo yango . . . mpe nakokómisa yango esika oyo etikali mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”​—Yirimia 25:12.

Ndenge esakolamaki, Siruse akweisaki Babilone na mobu 539 liboso ya ntango na biso. Mwa moke na nsima, apesaki Bayuda bonsomi, mpe babandaki kozonga na mboka na bango na mobu 537 liboso ya ntango na biso​—elekaki mpenza mbula 70 bandá bamemamaki na boombo. (Ezra 1:1-4) Nsukansuka, Babilone ekómaki “esika oyo etikali mpamba”​—yango emonisi lisusu ete bisakweli ya Biblia ezali solo.

LISOLO YANGO ETALI YO NA NINI?

Tókanisa naino: Biblia esakolaki (1) Bayuda bakosala mbula 70 na boombo, (2) ndenge oyo Siruse akokweisa Babilone mpe mayele oyo akosalela, mpe (3) Babilone ekotikala mpamba mpo na libela. Moto moko te akokaki koyeba makambo ya ndenge wana liboso! Na yango, ebongi mpenza tóloba ete: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe.” (2 Petro 1:21) Ya solo, ebongi mpenza tózwaka Biblia na valɛrɛ mingi.

^ par. 36 Maloba yango emonisaka motángo ya mbongo ya ebende. Mpo na koyeba ndimbola mosusu, talá mokapo 7 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! ebimisami na Batatoli ya Yehova.