Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liwa ezali nde nsuka ya makambo?

Liwa ezali nde nsuka ya makambo?

NA Febwali 1987, nkɔkɔ moko ya mobali ya mbula 85 aboyaki kolanda lisalisi ya monganga oyo azalaki kozwa. Bazalaki kopɛtolaka ye makila na masini moko mpo akoba kozala na bomoi. Akufaki pɔsɔ mibale na nsima na ndako, na miso ya mwana na ye.

Ntango wana ya nsuka oyo balekisaki elongo epesaki bango libaku ya kolobela lisusu likambo moko oyo balobelaká liboso: Bakufi bakoki kozonga na bomoi? Tata yango, oyo atángaki mingi, azalaki kondima te ete bakufi bazonga na bomoi. Mateya ya evolisyo nde etindaki ye azala na makanisi wana mpe azalaki kosepela te na lokuta ya bato ya mangomba. Azalaki koloba ete tokoki koyeba te soki Nzambe azali to te.

Mpo na kobɔndisa tata na ye mpe kopesa ye elikya, mwana ayebisaki ye makambo oyo ezali komonisa ete bato oyo bakufá bakoki kozonga na bomoi. Ntango tata akómaki pene na liwa, alobaki ete soki bapesi ye libaku ya kozonga lisusu na bomoi mpe na nzoto makasi akosepela mingi.

Tobɔndisami na ntina na liwa

Bato mingi, ata mpe bato nyonso, bakosepela kozonga lisusu na bomoi soki bakoki kosala yango, na nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi na mokili oyo ekotonda mpenza na kimya. Bato bazali lokola banyama te, oyo Biblia elobaka ete “bazangá mayele.” (2 Petelo 2:12) Biso bato tokundaka bawei na biso. Tolingaka koyeba oyo ekoya lobi. Tolingaka te konuna, kobɛla mpe kokufa. Yango nde makambo oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo.

Tosilaka mpenza mayele soki tomoni ete liwa na biso to ya moto moko oyo tolingaka epusani. Kasi, Biblia ezali kolendisa biso tóbanga liwa te. Elobi boye: “Kokende na ndako ya kolela eleki malamu na kokende na ndako ya elambo.” Mpe ebakisi boye: “Moto ya bomoi akotya yango na motema na ye.” (Mosakoli 7:2) Mpo na nini tosengeli kotya liwa na motema, to kokanisa yango na mozindo?

Ntina moko ezali ete tobotamá na mposa ya kozala na bomoi mpe na kimya. Kokufa to kozala lisusu na bomoi te ezali likambo oyo tosepelaka na yango te. Moto ata moko te asepelaka na liwa. Biblia esalisi biso tóyeba mpo na nini ezali bongo: “[Nzambe] atyaki na motema ya moto likanisi ya kozala na bomoi seko.” (Mosakoli 3:11, Louis Segond) Tolingaka kozala na bomoi, kasi kokufa te. Kanisá naino: Mposa yango ekokaki kozala makasi ndenge wana soki Mozalisi na biso akelaki biso mpo tókufaka? Bato bakoki kozala mokolo mosusu na bomoi ya esengo mpe ezangá maladi libela na libela?

Ntina ya kondima likambo yango

Na mbula eleki, zulunalo moko (AARP The Magazine) oyo elobelaka makambo ya bato oyo bazwá pansiɔ na Amerika elobelaki lisolo moko: “Bomoi nsima ya liwa.” Na ebele ya bato ya mbula koleka 50 oyo batunaki, “mingi na bango (73%) balobaki ete ‘bandimaka ete bomoi mosusu ezali nsima ya liwa.’” Nzokande, zulunalo yango eyebisaki mpe ete ndambo ya bato mosusu balobaki ete mpo na bango, “soki moto akufi, makambo nyonso esili mpo na ye.” Kasi, yango nde bato balingaka mpenza kondima?

Kaka lisolo yango elobi ete Tom, mondimi moko ya Katolike na etúká ya New York alobaki boye: “Bateyaka ete bomoi mosusu ezali na nsima ya liwa. Mpo na ngai, bazangaka makambo ya koloba te. Yo moko kaka nde okopona oyo olingi kondima. Nakendaka na misa. Natambwisaka bomoi na ngai lokola nde bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa, kasi nandimaka likambo yango mpenza te. Soki ezali bongo, ezala kaka bongo.”

Bato mingi bakanisaka lokola Tom. Tata oyo tolobelaki na ebandeli azalaki mbala mingi koloba na mwana na ye ete, “Bato oyo babangaka liwa nde bandimaka makambo oyo mangomba eteyaka.” Kasi, ndenge ye ná bato mosusu ya ntembe bayaki komona na nsima, kondima ete ezali na Mozalisi oyo atondá na nguya esalisaka moto ayeba ntina ya makambo mingi ya kokamwa.

Na ndakisa, pɔsɔ misato kaka nsima ya ebandeli ya zemi, bɔɔngɔ ya mwana ebandaka kosalema. Baselile ya bɔɔngɔ yango ebotanaka nokinoki, mbala mosusu ata nkóto 250 na miniti moko! Sanza libwa na nsima, mwana abotamaka, mpe bɔɔngɔ na ye ezalaka na likoki ya koyekola makambo na ndenge ya kokamwa. James Watson, moto moko ya mayele na bioloji, alobaki ete bɔɔngɔ ya moto ezali “eloko moko ya kokamwa oyo tomoná naino te na molɔ́ngɔ́ mobimba.”

Ntango ozali komona makambo ya kokamwa ndenge wana, yo mpe otikalaka monɔkɔ polele lokola basusu? Makambo ya ndenge wana esalisaka yo ozwa eyano na motuna oyo moto moko ya kala atunaki eleki lelo ebele ya bambula ete: “Soki moto akokufa, akobika nde lisusu?” Moto yango ayanolaki Nzambe na elikya nyonso ete: “Okobenga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Yobo 14:14, 15.

Na ntembe te, tosengeli kotalela makambo oyo ekosalisa biso tóndima ete bakufi bakozonga lisusu na bomoi.