Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 78

Kapita ya sembo, milɛngɛlá!

Kapita ya sembo, milɛngɛlá!

LUKA 12:35-59

  • KAPITA YA SEMBO ASENGELI KOMILƐNGƐLA

  • YESU AYEI KOTYA BOKABWANI

Yesu alimbolaki ete kaka “etonga moke” nde ekozwa esika na Bokonzi ya likoló. (Luka 12:32) Kasi kozwa mbano monene wana ezali likambo ya lisɛki te. Kutu, amonisi ete, soki moto alingi kokɔta na Bokonzi yango, asengeli kozala na ezaleli ya malamu.

Yango wana, Yesu apesi bayekoli na ye toli ete bámilɛngɛla mpo na kozonga na ye. Alobi: “Bómilɛngɛla mpe miinda na bino epela, mpe bino moko bózala lokola bato oyo bazali kozela nkolo na bango ntango akouta na libala, mpo ntango akoya mpe akobɛta kɔkɔkɔ báfungolela ye na mbala moko. Esengo na baombo oyo nkolo na bango ntango akoya akokuta bango bazali kokɛngɛla!”​—Luka 12:35-37.

Ezali mpasi te ete bayekoli bákanga ntina ya ezaleli oyo Yesu alobeli na ndakisa yango. Basali oyo alobeli bamilɛngɛli mpe bazali kozela nkolo na bango azonga. Yesu alimboli: “Soki [nkolo] ayei na eleko ya mibale ya kokɛngɛla na butu [kobanda ngonga ya libwa na mpokwa tii na midi ya butu], to na oyo ya misato [kobanda midi ya butu tii na ngonga ya misato ya ntɔngɔ], mpe akuti bango bongo, esengo na bango!”​—Luka 12:38.

Toli yango esuki kaka te na likambo ya kozala basali ya ndako oyo bazali na molende. Yango emonani polele na ndenge Yesu, Mwana ya moto, amikɔtisi na ndakisa yango. Ayebisi bayekoli na ye: “Bino mpe, bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Luka 12:40) Yango emonisi ete, na eleko moko boye, Yesu akoya. Alingi ete bayekoli na ye, mingimingi baoyo bazali na kati ya “etonga moke,” bámilɛngɛla.

Petro alingi koyeba malamu ndimbola ya maloba wana ya Yesu, yango wana atuni: “Nkolo, ozali kopesa ndakisa wana mpo na biso to mpe mpo na bato nyonso?” Na esika ya kopesa ye eyano mbala moko, Yesu apesi ndakisa mosusu oyo ekokani na yango: “Nani azali mpenza kapita ya sembo, ya mayele, oyo nkolo na ye akotya ye abatela basaleli na ye nyonso mpo apesaka bango bilei oyo basengeli na yango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango, soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Nazali koyebisa bino solo: Akotya ye abatela biloko na ye nyonso.”​—Luka 12:41-44.

Na ndakisa ya liboso, emonani polele ete “nkolo” ezali Yesu, Mwana ya moto. Na yango, “kapita ya sembo” esengeli kozala mibali mosusu kati na bato oyo bazali na kati ya “etonga moke” mpe oyo akopesa bango Bokonzi. (Luka 12:32) Awa, Yesu azali koloba ete bato moke na etuluku yango bakopesa “basaleli na ye nyonso” “bilei oyo basengeli na yango na ntango oyo ebongi.” Yango wana, Petro ná bayekoli mosusu oyo Yesu azali koteya mpe koleisa na elimo bakoki kondima ete Mwana ya moto akoya na eleko moko boye na mikolo ekoya. Na eleko yango, ekozala na ebongiseli moko mpo na kopesa bayekoli ya Yesu, “basaleli nyonso” ya Nkolo, bilei ya elimo.

Na libaku mosusu, Yesu amonisi ntina oyo bayekoli na ye basengeli kozala ekɛngɛ mpe kokeba na ezaleli na bango. Ezali bongo mpo moto akoki kokóma mafumafu to kotɛmɛla bandeko na ye bakristo: “Kasi soki moombo wana alobi na motema na ye: ‘Nkolo na ngai azali koya noki te,’ mpe abandi kobɛta basali ya mibali mpe basali ya basi, mpe kolya mpe komɛla mpe kolangwa, nkolo ya moombo wana akoya mokolo oyo ye azali kozela ye te mpe na ngonga oyo ye ayebi te, mpe akopesa ye etumbu ya makasi mpenza mpe akotya ye esika moko na bato ya sembo te.”​—Luka 12:45, 46.

Yesu alobi ete ayei “kopelisa mɔtɔ na mabele.” Asali yango na ndenge azali koloba makambo oyo ezali kobimisa bokabwani makasi mpe esali ete mateya mpe mimeseno ya lokuta ebimisama polele. Yango ekaboli ata bato oyo basengeli kozala na bomoko, na ndakisa “tata akotombokela mwana mobali mpe mwana mobali akotombokela tata, mama akotombokela mwana mwasi mpe mwana mwasi akotombokela mama na ye, bokilo ya mwasi akotombokela mwasi ya mwana mpe mwasi ya mwana akotombokela bokilo na ye ya mwasi.”​—Luka 12:49, 53.

Maloba wana etaleli mpenzampenza bayekoli na ye. Na nsima, Yesu atye likebi epai ya ebele ya bato. Mingi na bango bazali koboya kondima bilembo oyo emonisi ete azali Masiya; yango wana ayebisi bango: “Ntango bomonaka lipata moko ebimi na wɛsti, na mbala moko bolobaka ete: ‘Mopɛpɛ makasi ezali koya,’ mpe esalemaka bongo. Mpe ntango bomonaka mopɛpɛ moko ya sudi ezali kopɛpa, bolobaka ete: ‘Molunge makasi ekozala,’ mpe esalemaka bongo. Bakosi, boyebi kotala malamu ndenge mabele ná likoló ezali komonana, kasi ndenge nini boyebi te kotalela malamu eleko oyo mpenza?” (Luka 12:54-56) Emonani polele ete bamilɛngɛli te.