Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nini epesaka esengo na libota?

Nini epesaka esengo na libota?

Okanisi ete ezali . . .

  • bolingo?

  • mbongo?

  • to eloko mosusu?

BIBLIA ELOBI ETE

“Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:28, Libongoli ya Mokili ya Sika.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Bokolingana mingi na kati ya libota.​—Baefese 5:28, 29.

Bokopesana limemya ya solosolo.​—Baefese 5:33.

Bokozala na likambo ya kobanga te.​—Marko 10:6-9.

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina mibale oyo:

  • Nzambe nde Moto asalaki libota. Biblia elobi ete “libota nyonso . . . ezwi nkombo” na yango epai ya Yehova Nzambe. (Baefese 3:14, 15) Na maloba mosusu, libota ezali mpo Yehova asalá yango. Mpo na nini koyeba likambo yango ezali na ntina mingi?

    Tózwa ndakisa: Soki osepeli mpenza na elubu moko oyo olei mpe olingi koyeba ndenge balambaka yango, okotuna nani? Okotuna kaka moto oyo alambaki yango.

    Ndenge moko mpe, mpo na koyeba makambo oyo esalaka ete libota ezala na esengo, tosengeli kotuna Yehova, Moto oyo asalaki libota.​—Ebandeli 2:18-24.

  • Nzambe atyelaka bino likebi. Ezali malamu ete mabota bálukaka toli ya Yehova, oyo apesi na Liloba na ye. Mpo na nini? “Mpo atyelaka bino likebi.” (1 Petro 5:6, 7) Yehova alingi mpenza ete bózala malamu​—mpe toli oyo apesi esalisaka mpenza!​—Masese 3:5, 6; Yisaya 48:17, 18.

KANISÁ NAINO

Osengeli kosala nini mpo ozala mobali malamu, mwasi malamu, to moboti malamu?

Biblia epesi eyano na motuna yango na BAEFESE 5:1, 2 mpe na BAKOLOSE 3:18-21.