Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 3

“Batondaki na elimo santu”

“Batondaki na elimo santu”

Makambo oyo bayekoli basalaki nsima ya kozwa elimo santu na mokolo ya Pantekote

Euti na Misala 2:1-47

1. Lobelá makambo oyo ezalaki kosalema na Fɛti ya Pantekote.

 BABALABALA ya Yerusaleme etondi na bato. a Na etumbelo ya tempelo, milinga ezali komata likoló wana Balevi bazali koyemba Hallel (Nzembo 113 tii 118); na ntembe te, etuluku moko ezali kobanda koyemba, mpe na nsima bamosusu bazali koyamba. Babalabala etondi na bapaya. Bato yango bauti na bamboka mosika lokola Elame, Mezopotamia, Kapadosi, Ponti, Ezipito, mpe Roma. b Bayei kosala nini? Bayei na fɛti ya Pantekote, oyo ebengamaka mpe “mokolo ya mbuma ya liboso oyo eteli.” (Mit. 28:26) Fɛti yango esalemaka mbala moko na mbula, na eleko oyo basilisi kobuka ɔrje mpe babandi kobuka blé. Ezalaka mokolo ya esengo mpenza.

2. Makambo nini ya kokamwa esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?

2 Pene na ngonga ya libwa na ntɔngɔ ya mokolo wana ya eleko ya prɛnta na mobu 33 T.B., likambo moko esalemaki, oyo ekamwisaka bato tii lelo oyo, nsima ya bankama ya bambula. Na mbala moko, “makɛlɛlɛ eutaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi.” (Mis. 2:2) Makɛlɛlɛ yango etondaki na ndako oyo bayekoli 120 ya Yesu bayanganaki. Na nsima, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Ndemo lokola nde mɔtɔ ezalaki komonana mpe ezalaki likoló ya motó ya moyekoli mokomoko. c Na nsima, bayekoli “batondaki na elimo santu” mpe babandaki koloba na minɔkɔ ya bapaya! Ntango bayekoli babimaki na ndako yango, bapaya oyo bazalaki kokutana na bango na babalabala ya Yerusaleme bazalaki kokamwa, mpo bayekoli bazalaki koloba na minɔkɔ ya bato yango! Moto na moto azalaki koyoka bango “bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.”​—Mis. 2:1-6.

3. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Pantekote ya mobu 33 T.B. ezalaki mokolo ya ntina mingi mpo na losambo ya solo? (b) Ndenge nini diskur ya Petro eyokani na mokumba na ye ya kosalela “bafungola ya Bokonzi”?

3 Likamwisi yango ezalaki likambo ya ntina mingi mpo na losambo ya solo; ezalaki ebandeli ya Yisraele ya elimo, to lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Gal. 6:16) Kasi, makambo esukaki wana te. Na mokolo yango, ntango Petro alobaki epai ya ebele ya bato, asalelaki fungola ya liboso kati na “bafungola [misato] ya Bokonzi” oyo mokomoko na yango esengelaki kopesa etuluku moko ya bato libaku monene mpenza. (Mat. 16:18, 19) Fungola wana ya liboso epesaki Bayuda ná baprozelite libaku ya kondima nsango malamu mpe ya kotyama mafuta na elimo santu. d Na ndenge yango, balingaki kokóma basangani ya Yisraele ya elimo, mpe kozala na elikya ya koyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe na Bokonzi ya Masiya. (Em. 5:9, 10) Na nsima, libaku malamu yango epesamaki mpe epai ya Basamaria, mpe na nsuka epai ya bato ya bikólo. Liteya nini bakristo ya lelo bakoki kozwa na makambo minene oyo esalemaki mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?

“Bango nyonso elongo na esika moko” (Misala 2:1-4)

4. Na ndenge nini lisangá ya bokristo na mikolo na biso ezali kaka lisangá oyo ebandaki na mobu 33 T.B.?

4 Lisangá ya bokristo ebandaki na bayekoli 120 oyo bazalaki “bango nyonso elongo na esika moko,” elingi koloba na shambrɛ ya likoló mpe oyo bazwaki elimo santu. (Mis. 2:1) Na nsuka ya mokolo yango, basangani ya lisangá oyo bazwi batisimo bakómaki bankóto. Yango ezalaki kaka ebandeli ya bokoli oyo ezali kokoba tii na moi ya lelo! Ya solo, lisangá ya bokristo na mikolo na biso, ebongiseli oyo esangisi mibali mpe basi oyo babangaka Nzambe, ezali esaleli oyo na nzela na yango “nsango malamu oyo ya Bokonzi” ezali ‘kosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso,’ liboso nsuka ya makambo ya ntango oyo eya.​—Mat. 24:14.

5. Na siɛklɛ ya liboso, soki moto akɔti na lisangá ya bokristo azalaki kozwa mapamboli nini, oyo ezali mpe na ntango na biso?

5 Lisangá ya bokristo esengelaki mpe kolendisa basangani na yango; liboso, baoyo batyami mafuta na elimo, mpe na nsima, “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Paulo azalaki kosepela mingi na ndenge oyo bandeko na lisangá bapesanaka mabɔkɔ; amonisaki yango ntango akomelaki bakristo ya Roma boye: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, mpo nakabela bino mwa likabo ya elimo mpo bókóma makasi, to, kutu nde, mpo tólendisana na nzela ya kondima, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.”​—Rom. 1:11, 12.

6, 7. Lelo oyo, ndenge nini lisangá ya bokristo ezali kokokisa mokumba ya kosakola nsango malamu na bikólo nyonso?

6 Lelo oyo, lisangá ya bokristo ezali na mikano ndenge moko na oyo ya lisangá ya siɛklɛ ya liboso. Yesu apesaki bayekoli na ye mosala moko monene; kasi, mosala yango epesaka mpe esengo. Alobaki na bango boye: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—Mat. 28:19, 20.

7 Lisangá ya Batatoli ya Yehova ezali ebongiseli oyo, na nzela na yango, mosala yango ezali kokokisama lelo oyo. Ya solo, komema nsango malamu epai ya bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Atako bongo, Batatoli ya Yehova babimisi mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 1000. Soki ozali na kati ya lisangá ya bokristo mpe osanganaka na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli, osengeli mpenza kozala na esengo. Ozali na kati ya bato moke oyo, na mabele mobimba, bazali na libaku malamu ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nkombo ya Yehova!

8. Lisalisi nini tozwaka na nzela ya lisangá ya bokristo?

8 Mpo na kosalisa yo oyika mpiko mpe obatela esengo na yo na mikolo oyo ya mpasi, Yehova Nzambe apesi yo ebele ya bandeko oyo bazali na mokili mobimba. Paulo akomelaki Baebre oyo bakómaki bakristo boye: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika te koyanganaka na makita na biso, ndenge bamosusu basalaka, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kopusana.” (Ebr. 10:24, 25) Lisangá ya bokristo ezali ebongiseli oyo Yehova atye mpo na kopesa yo nzela ya kolendisa bandeko mpe mpo bango bákoka kolendisa yo. Kangamá makasi na bandeko na yo ya elimo. Kotika te momeseno ya koyangana na makita!

“Moto na moto azalaki koyoka . . . na monɔkɔ na ye mpenza” (Misala 2:5-13)

“Tozali koyoka bango bazali koloba makambo kitoko ya Nzambe na minɔkɔ na biso.”​—Misala 2:11

9, 10. Ndenge nini bato mosusu bamipesi mpo na kosakola epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu?

9 Kanisá yikiyiki oyo ezalaki na kati ya ebele ya Bayuda mpe baprozelite oyo bayanganaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Ekoki kozala ete mingi kati na bango bayebaki monɔkɔ moko oyo bakokaki kosalela mpo na kosolola na bato mosusu, mbala mosusu ezalaki monɔkɔ ya Grɛki to ya Ebre. Kasi, ntango likamwisi wana esalemaki, “moto na moto azalaki koyoka [bayekoli] bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.” (Mis. 2:6) Na ntembe te, ntango bato yango bayokaki nsango malamu na minɔkɔ ya mboka na bango, esimbaki mpenza mitema na bango. Ya solo, lelo oyo bakristo balobaka minɔkɔ ya bapaya na ndenge ya likamwisi te. Nzokande, mingi kati na bango bandimi komipesa mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi epai ya bato ya bikólo nyonso. Na ndenge nini? Bamosusu bayekoli minɔkɔ mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na masangá ya minɔkɔ ya bapaya na esika oyo bafandi, to mpe bakei na mboka mopaya. Mbala mingi, bamonaka ete bayoki na bango basepelaka na milende na bango.   

10 Tózwa ndakisa ya Christine, oyo ayekolaki monɔkɔ ya Gujarati elongo na Batatoli mosusu nsambo. Ntango akutanaki na moninga moko ya mosala oyo alobaka monɔkɔ yango, apesaki ye mbote na monɔkɔ ya Gujarati. Elenge mwasi yango akamwaki mpe alingaki koyeba mpo na nini Christine azalaki kosala makasi ayeba monɔkɔ wana ya mpasi. Christine asalelaki libaku wana mpo na kopesa ye litatoli. Elenge mwasi yango alobaki na Christine boye: “Nakanisi ete bozali mpenza na nsango moko ya ntina.”

11. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya baoyo balobaka monɔkɔ ya bapaya?

11 Ya solo, bamosusu kati na biso bakokoka te koyekola monɔkɔ ya bapaya. Atako bongo, tokoki komibongisa mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu. Na ndenge nini? Na ndakisa, tokoki kosalela JW Language mpo na koyekola ndenge ya kopesa mbote na monɔkɔ oyo bato balobaka mingi na esika ofandi. Okoki mpe koyekola mwa maloba ya monɔkɔ yango oyo ekoki kolamwisa mposa ya bato oyo balobaka yango. Okoki kolakisa bango ndenge ya kokɔta na jw.org, mpe mbala mosusu kolakisa bango bavideo mpe mikanda ndenge na ndenge ya monɔkɔ na bango oyo ezali na kati. Soki tozali kosalela bisaleli yango na mosala ya kosakola, tokoki kozwa esengo ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazwaki ntango bato oyo bautaki na mikili ya bapaya bakamwaki koyoka nsango malamu “moto na moto . . . na monɔkɔ ye.”

“Petro atɛlɛmaki” (Misala 2:14-37)

12. (a) Ndenge nini Yoele asakolaki likambo ya kokamwa oyo ekokisamaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.? (b) Mpo na nini esengelaki mpe esakweli ya Yoele ekokisama na siɛklɛ ya liboso?

12 “Petro atɛlɛmaki” mpo na koloba liboso ya ebele ya bato yango oyo bautaki na bikólo ndenge na ndenge. (Mis. 2:14) Alimbwelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye ete Nzambe nde apesaki bango likoki ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge mpo na kokokisa esakweli ya Yoele oyo elobi ete: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai.” (Yoe. 2:28) Liboso Yesu amata na likoló, ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu,” mpe Yesu amonisaki ete mosungi yango ezali “elimo.”​—Yoa. 14:16, 17.

13, 14. Petro asalaki ndenge nini mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

13 Na nsuka ya diskur na ye, Petro alobaki na mpiko epai ya bayoki na ye ete: “Tiká bato nyonso ya Yisraele báyeba malamumalamu ete Nzambe akómisi ye Nkolo mpe Kristo, Yesu yango oyo bino bobakaki na nzete.” (Mis. 2:36) Ya solo, bato mingi oyo bayokaki Petro na mokolo yango bazalaki te ntango babakaki Yesu na nzete. Kasi, bango nyonso bazalaki na ngambo na likambo yango mpo bazalaki bato ya ekólo wana. Kasi, tomoni ete Petro alobaki epai ya bandeko na ye Bayuda na limemya mpe alukaki kosimba mitema na bango. Petro alingaki te kosambisa bato yango, alingaki nde ete bábongola mitema. Bato oyo bayokaki Petro basepelaki te na maloba na ye? Soki moke te. Kutu, “mitema na bango etungisamaki makasi mpenza.” Batunaki ete: “Tosengeli kosala nini?” Lokola Petro alobaki na bango na limemya, asimbaki mitema ya mingi kati na bango, mpe balukaki kobongola mitema.​—Mis. 2:37.

14 Tokoki komekola ndenge oyo Petro asalaki mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye. Ntango tozali kopesa litatoli, tosengeli te koluka kosembola likanisi nyonso ya lokuta oyo moto abimisi. Tosengeli nde koluka makambo oyo ekobimisa ntembe te kati na biso ná ye. Soki tozwi makambo ya ndenge wana, tokoki kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kokanisa na moto yango. Mbala mingi, ntango tozali komonisa solo ya Biblia na limemya, bato ya mitema sembo bandimaka koyoka biso.

“Mokomoko na bino abatisama” (Misala 2:38-47)

15. (a) Petro alobaki nini, mpe bato basalaki nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bankóto ya bato oyo bayokaki nsango malamu mokolo ya Pantekote bakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo mokolo wana?

15 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., epai ya Bayuda mpe baprozelite oyo bandimaki mateya na ye, Petro alobaki boye: “Bóbongola mitema, mpe mokomoko na bino abatisama.” (Mis. 2:38) Na bongo, bato soki 3 000 bazwaki batisimo, na ntembe te na bapisini ya Yerusaleme mpe ya bamboka mosusu ya pembeni. e Bato yango bandimaki kozwa batisimo kaka mpo na esengo? Lisolo yango ezali nde komonisa ete bayekoli ya Biblia mpe bana ya bakristo basengeli kowela kozwa batisimo ata soki bakokisi naino masɛngami te? Te. Tóbosana te ete Bayuda ná baprozelite oyo bazwaki batisimo mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. bazalaki bayekoli ya Liloba ya Nzambe, mpe bazalaki na ekólo oyo emipesaki epai ya Yehova. Longola yango, bato yango bamonisaki ete bazalaki molende, bamosusu basalaki mibembo milai mpo na kokende na fɛti yango. Nsima ya kondima mateya ya solo oyo etali mokumba ya Yesu Kristo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, bandimaki kokoba kosalela Nzambe, kasi sikoyo lokola bayekoli ya Kristo oyo bazwi batisimo.

16. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso bamonisaki elimo ya komipimela?

16 Na ntembe te Yehova azalaki kopambola bato yango. Lisolo elobi: “Baoyo nyonso bakómaki bandimi bazalaki elongo, bazalaki kotya biloko esika moko, bazalaki kotɛka biloko na bango, bozwi na bango mpe kokabola na moto nyonso mosolo oyo bazwaki, na kotalela bosɛnga ya moto mokomoko.” f (Mis. 2:44, 45) Bakristo nyonso ya solo basengeli mpenza komekola elimo wana ya bolingo mpe ya komipimela.

17. Makambo nini moto asengeli kosala liboso azwa batisimo?

17 Moto asengeli kokokisa makambo mingi liboso amipesa mpe azwa batisimo. Asengeli liboso kozwa boyebi ya Liloba ya Nzambe. (Yoa. 17:3) Asengeli mpe komonisa kondima, kobongola motema, elingi koloba koyoka mawa mpo na misala na ye ya kala. (Mis. 3:19) Na nsima, asengeli kobongwana, to kobaluka, elingi koloba kosala misala oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Rom. 12:2; Ef. 4:23, 24) Nsima ya kosala makambo yango, asengeli komipesa epai ya Nzambe na libondeli; na nsuka nde akoki kozwa batisimo.​—Mat. 16:24; 1 Pe. 3:21.

18. Bayekoli ya Kristo oyo bazwi batisimo bazali na libaku malamu ya kosala nini?

18 Ozali moyekoli ya Yesu Kristo oyo amipesi mpe azwi batisimo? Soki ezali bongo, zalá na botɔndi mpo na libaku malamu oyo ozwi. Lokola bayekoli ya siɛklɛ ya liboso oyo batondaki na elimo santu, Yehova akoki kosalela yo mingi mpo na kopesa litatoli malamumalamu mpe mpo na kosala mokano na ye!

a Talá etanda “ Yerusaleme​—Esika monene ya losambo ya Bayuda,” na lokasa 23.

b Talá bitanda “ Roma​—Engumba-mokonzi ya ampire moko monene,” na lokasa 24; “ Bayuda na Mezopotamia mpe na Ezipito,” na lokasa 25; mpe “ Lingomba ya bokristo na etúká ya Ponti,” na lokasa 26.

c “Ndemo” yango ezalaki mɔtɔ ya solo te, kasi ezalaki “lokola nde ya mɔtɔ,” yango ezali komonisa ete eloko moko lokola kongɛnga ya mɔtɔ ezalaki komonana likoló ya motó ya moyekoli mokomoko.

d Talá etanda “ Baprozelite bazalaki banani?” na lokasa 27.

e Mokolo ya 07/08/1993, na liyangani oyo esangisaki bato ya bikólo ndenge na ndenge oyo esalemaki na engumba Kiev, na ekólo Ukraine, bato 7 402 bazwaki batisimo na bapisini motoba. Mpo na kobatisa bato nyonso esɛngaki ngonga mibale na miniti zomi na mitano.

f Ebongiseli wana oyo ezalaki kaka mpo na mwa ntango ekokisaki mposa oyo emonanaki na ntango wana mpamba te bapaya batikalaki na Yerusaleme mpo na koyoka mateya mosusu malamumalamu. Bakristo bapesaki biloko na bolingo na bango moko; kasi, tosengeli te kotalela yango lokola makambo ya bakoministe.​—Mis. 5:1-4.