Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Bazwi bonsomi, na nsima bapekisami lisusu

Bazwi bonsomi, na nsima bapekisami lisusu

Bazwi bonsomi oyo bakanaki te

Babomaki ndeko Manuel Hierrezuelo ntango bazalaki kotuna ye mituna

Na boumeli ya bambula nyonso ya epekiseli, ndeko Lennart Johnson ná mwasi na ye Virginia mpe ndeko Roy Brandt ná mwasi na ye Juanita bakobaki mosala ya misionɛrɛ na République dominicaine. Ndeko Lennart alobaki boye: “Babengaki ngai ná Roy Brandt mpo bátuna biso mituna. Mikolo eleki, bakonzi ya guvɛrnema ya Trujillo babengisaki ndeko Manuel Hierrezuelo na biro na bango.” Likambo ya mawa, babomaki ndeko Manuel ntango bazalaki kotuna ye mituna, mpo abatelaki bosembo na ye tii na nsuka. Bongo makambo esukaki ndenge nini mpo na ndeko Lennart ná Roy? Ndeko Lennart abakisaki boye: “Ntango tokómaki, batunaki biso mituna moto na moto na esika na ye, mpe emonani ete bazalaki kokoma biyano oyo tozalaki kopesa. Na ntango wana, basalaki eloko mosusu te; kasi sanza mibale na nsima, bazulunalo ya mboka elobaki ete guvɛrnema ya Trujillo elongoli epekiseli oyo etyamaki na mosala ya Batatoli ya Yehova mpe ete tokoki kozongela makambo na biso.”

Na 1950, liboso epekiseli ebanda, basakoli bazalaki 261. Ntango epekiseli elongwaki na sanza ya mwambe na 1956, basakoli ya nsango malamu bakómaki 522. Bandeko basepelaki mingi koyeba ete bazwi bonsomi ya kosakola polele nsima ya mbula motoba ya kokɔta babolɔkɔ, kokangama, mpe kokɛngɛlama ntango nyonso.

Basaleli ya Yehova basalaki nini lokola makambo ebongwanaki na mbalakaka? Na mbala moko, babandaki kobongisa mosala! Balukaki bisika ya kosala makita mpe basalaki bateritware ya sika mpe badosye ya lisangá. Bandeko basepelaki ndenge bakokaki sikoyo kosɛnga mpe kozwa mikanda. Basepelaki na bonsomi oyo bazwaki mpe bamipesaki na kosakola na molende. Na yango, nsima ya sanza misato mpamba, na sanza ya zomi na moko na 1956, basakoli bakómaki 612.

Bakonzi ya lingomba batomboki

Mokanda ya Toledano oyo emonisi ndenge ya kopekisa mikanda na biso ekɔta na ekólo

Nzokande, bakonzi ya Katolike babandaki mbala moko kosala likita mpo na kobebisa lokumu ya Batatoli. Basalelaki boyokani oyo Trujillo asalaki na Vatican mpe basalaki nyonso mpo guvɛrnema elimwisa Batatoli. Oscar Robles Toledano, sango moko ya Katolike, akomelaki Virgilio Álvarez Pina, sɛkrɛtɛrɛ oyo atalelaka makambo ya mboka mokanda mpo na kosɛnga guvɛrnema esalisa ye na “kofungola bato ya République dominicaine miso mpo bámona likama monene ya mwa lingomba ya ‘Batatoli ya Yehova’.”

Sango Toledano alobaki ete mokano na ye ya libosoliboso ezalaki ya “kokweisa milende oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala mpo na kotinda bato bándima mateya na bango.” Sango yango akomaki mpe ete alingi mikanda na biso epekisama na ekólo mobimba, “mingimingi buku ‘La vérité vous affranchira’ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”

Epekiseli mosusu

Bakonzi ya lingomba ná baninga na bango oyo bazalaki na kati ya guvɛrnema ya Trujillo basalaki likita mpo na kobundisa Batatoli. Francisco Prats-Ramírez, mokonzi ya parti politiki ya Trujillo, akomelaki Prezida Trujillo mokanda na sanza ya motoba na 1957; alobaki boye: “Nazali na likanisi ya kosangisa bato ebele mpo na kotɛmɛla makanisi mabe ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali komonisa ete bazali na bolingo ya ekólo te.”

Makambo wana ya lokuta eumelaki te kopalangana; buku Trujillo—Kaisala moke ya Caraïbes (na Lingelesi) elobaki boye: “Na eleko ya molunge ya 1957, bazulunalo ya République dominicaine ebimisaki masolo ndenge na ndenge oyo bakonzi minene ya Leta bakomaki mpo na kofunda Batatoli ya Yehova ete bazali ‘kotɛka mboka mpe kosala makambo ya mabe makasi.’ Makambo eyaki ndongo ntango Mariano Vásquez Sanz, sango moko ya Katolike, alobaki na radio ya Trujillo, La Voz Dominicana [mongongo ya République dominicaine] ete mwa lingomba yango esalaka na Bakoministe mpe abengaki bandimi na yango ‘banguna ya makasi, ya mayele mabe, babomi-bato, batɛki-mboka.’ Na nsima, basango bakomaki mokanda oyo episkɔpɔ-mokonzi Ricardo Pittini mpe Octavio Antonio Beras batyaki sinyatire; elobaki ete basango basengeli kobatela bandimi na bango na ‘lipɛngwi wana monene.’”

Milende ya Lingomba ya Katolike mpe ya bakonzi ya Leta ekokisaki mokano na yango. Na sanza ya nsambo, Likita monene ya bato ya politiki na République dominicaine ebimisaki mobeko oyo epekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova. Eumelaki te, bapolisi bakómaki kobɛta bandeko mpe konyokola bango. Bakangaki bandeko soki 150.